Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 7

Banganga-minzoto bayei kotala Yesu

Banganga-minzoto bayei kotala Yesu

MATAI 2:1-12

  • BANGANGA-MINZOTO BALANDI “MONZOTO” TII NA YERUSALEME, MPE NA NSIMA EPAI YESU AZALI

Bato moko bauti na ɛsti. Bazali banganga-minzoto, elingi koloba, bato oyo bayekolaka ndenge minzoto ezali, mpe balobaka ete kosala bongo epesaka bango likoki ya kolimbola makambo oyo ekómelaka bato. (Yisaya 47:13) Ntango bazalaki na mboka na bango na ɛsti, bamonaki “monzoto” moko mpe basalaki bankama ya bakilomɛtrɛ mpo na kolanda yango tii na Beteleme te, kasi nde tii na Yerusaleme.

Ntango banganga-minzoto yango bakómi kuna, batuni ete: “Wapi moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda? Mpo tomonaki monzoto na ye ntango tozalaki na ɛsti, mpe toyei kogumbamela ye.”​—Matai 2:1, 2.

Ntango Erode, Mokonzi ya Yerusaleme ayoki nsango yango, asiliki makasi. Na yango, abengisi banganga-nzambe bakonzi mpe bakonzi mosusu ya lingomba ya Bayuda mpe atuni bango esika nini Kristo asengeli kobotama. Bataleli Makomami mpe bayanoli ye ete: “Na Beteleme.” (Matai 2:5; Mika 5:2) Ntango bayebisi ye bongo, abengisi banganga-minzoto na kobombana mpe ayebisi bango ete: “Bókende koluka mwana yango malamumalamu, mpe soki bomoni ye, bóyebisa ngai, mpo ngai mpe nakende kogumbamela ye.” (Matai 2:8) Kasi, Erode azali nde na mposa ya komona mwana yango mpo aboma ye!

Ntango banganga-minzoto bakei, likambo moko ya kokamwa esalemi. “Monzoto” oyo bamonaki ntango bazalaki na ɛsti, bamoni yango ekómi kotambola liboso na bango. Emonani polele ete ezali monzoto lokola minzoto nyonso te, kasi ebimi kaka mpo na kolakisa bango nzela. Banganga-minzoto balandi yango tii ntango etɛlɛmi likoló ya ndako oyo Yozefe ná Maria, bazali kofanda ná mwana na bango ya moke.

Ntango banganga-minzoto bakɔti na ndako, bakuti Maria elongo na mwana na ye ya moke, Yesu. Banganga-minzoto yango bagumbameli ye. Mpe bapesi ye makabo ya wolo, olibana ná mire. Na nsima, ntango balingi kozonga epai ya Erode, Nzambe akebisi bango na ndɔtɔ ete básala bongo te. Yango wana bazongi na mboka na bango na nzela mosusu.

Okanisi ete nani nde abimisaki “monzoto” wana oyo ezalaki kotambwisa banganga-minzoto? Kobosana te, monzoto yango ememaki bango mbala moko te epai Yesu azalaki na Beteleme. Kasi, ememaki bango naino na Yerusaleme, epai bakutanaki na Mokonzi Erode, oyo alingaki koboma Yesu. Mpe alingaki kosala bongo soki Nzambe akebisaka te banganga-minzoto wana mpe apekisaka bango te koyebisa Erode esika Yesu azalaki. Emonani polele ete, ezalaki Satana, monguna ya Nzambe nde alingaki koboma Yesu, mpe asalelaki mayele wana mpo na koluka kokokisa mokano na ye.