Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nandimi oyo Nzambe alobi mpo na makila

Nandimi oyo Nzambe alobi mpo na makila

Nandimi oyo Nzambe alobi mpo na makila

MONGANGA MOKO ABƐTI LISOLO NA YE

NAZALAKI kolimbwela minganga mosusu na ndako ya makita ya lopitalo makambo oyo emonani nsima ya kosala ebembe moko ekzamɛ. Moto yango akufaki na maladi ya kanser mpe nalobaki ete: “Tokoki koloba ete, eloko oyo ebomi moto oyo ezali hémolyse [baglobile ya motane ekufikufi] mpe maladi ya ngɛyi ya makasi mpenza oyo euti na ndenge batyaki ye makila mbala na mbala.”

Molakisi moko ya inivɛrsite atɛlɛmaki na nkanda mpe agangaki: “Olingi koloba ete totyaki ye makila ya mabe?” Nazongisaki: “Nalobi bongo te.” Nalakisaki bango bafɔtɔ ya biteni mikemike ya ngɛyi ya moto yango, mpe nabakisaki: “Tozali komona lyse [kobeba] ya ebele ya baglobile ya motane na kati ya ngɛyi, mpe tokoki koloba ete yango nde epesi maladi ya ngɛyi ya makasi mpenza.” * Bato basilikaki makasi, mpe monɔkɔ ekaukaki ngai. Atako nazalaki naino monganga ya sika mpe ye azalaki molakisi na inivɛrsite, nalobaki ete nakoki nakobongola maloba na ngai te.

Ntango likambo wana esalemaki, nazalaki naino Motatoli ya Yehova te. Nabotamá na mobu 1943 na Sendai, engumba moko na nɔrdi ya Japon. Lokola tata na ngai azalaki monganga (pathologiste mpe psychiatre), ngai mpe nazwaki ekateli ya kotánga kelasi ya monganga. Na mobu ya mibale ya kelasi na ngai ya monganga, na 1970, nabalaki elenge mwasi moko na nkombo Masuko.

Namikɔtisi na mosala ya monganga oyo babengi Pathologie

Liboso nasilisa kelasi, Masuko azalaki kosala mpo na kosunga biso. Mosala ya monganga ezalaki kosepelisa ngai mingi mpenza. Nazalaki kokamwa mingi mpenza ndenge nzoto ya moto esalemá! Atako bongo, nazalaki kokanisa ata moke te ete Mozalisi azali. Nazalaki kokanisa ete bolukiluki na makambo ya monganga ekopesa bomoi na ngai ntina. Yango wana, nsima ya kokóma monganga, naponaki kokoba koyekola makambo na ngai ya monganga mpe nakɔtaki na pathologie​—koyekola koyeba bamaladi, nini epesaka maladi yango, makambo yango esalaka.

Ntango nabandi kosala baekizamɛ na nzoto ya bibembe ya bato oyo bakufaki na maladi ya kanser, nabandaki kokóma na ntembe moko: kotya moto makila ezali mpenza na ntina te. Bato oyo bazali kobɛla maladi ya kanser makasi mpenza bakoki kosila makila mpo makila yango ezali kobima. Lokola chimiothérapie elyaka makila mingi, mbala mingi minganga basɛngaka ete bátya bato makila. Kasi, nabandaki komona ete kotya moto makila ezali nde kosalisa maladi ya kanser epalangana nokinoki na nzoto. Ezala boni, lelo oyo eyebani ete kotya moto makila ezali koboma likoki ya nzoto ya komibatela, mpe yango ezali kosala ete maladi ya kanser ezongaka, mpe ezali kosala ete kaka bato moke oyo bazali na maladi ya kanser nde bábika. *

^ par. 4 Zulunalo moko (Journal of Clinical Oncology) ya sanza ya mwambe ya mobu 1988, elobaki boye: “Bato ya maladi oyo bazali kotyama makila na ntango bazali kosala bango lipaso bazali kobika mpenza te koleka bato ya maladi ya kanser oyo bazali kosala bango lipaso kozanga kotya bango makila.”

Na mobu 1975 nde nakutanaki na likambo oyo nalobeli na ebandeli ya lisolo oyo. Molakisi ya inivɛrsite yango oyo azalaki kolandela moto yango ayebaki makambo ya makila mingi mpenza (spécialiste en hématologie). Yango wana, likambo ya kokamwa ezali te ete asilika makasi ntango ayoki nalobi ete kotyama makila nde ebomaki moto yango! Kasi, nakobaki koloba, mpe nkanda na ye ebandaki kokita mokemoke.

Maladi te, liwa mpe te

Ezali kaka na eleko yango nde mwasi na ngai ayambaki mama moko ya mokóló oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Abimisaki liloba “Yehova” na lisolo na ye, mpe mwasi na ngai atunaki ye ndimbola na yango. Motatoli yango alobaki ete: “Yehova ezali nkombo ya Nzambe ya solo.” Masuko abandá kotánga Biblia banda azali naino mwana moke, kasi na Biblia oyo ye azalaki kotánga, na esika ya nkombo ya Nzambe batyá nde “NKOLO.” Sikoyo ayebaki ete Nzambe azali moto mpenza mpe azali na nkombo!

Masuko abandaki mbala moko koyekola Biblia na Motatoli yango, mama-nkoko wana. Ntango nautaki lopitalo, nakómaki na ndako na 1:00 ya butu, mwasi na ngai ayebisaki ngai na esengo ete: “Biblia elobi ete maladi ná liwa ekosila libela!” Nayebisaki ye ete, “Ekozala malamu mpenza!” Abakisaki ete, “Lokola mokili ya sika ekómi pene, nalingi te ete olekisa ntango na yo mpamba.” Nakanisaki ete alingi lisusu te ete nazala monganga, yango esepelisaki ngai te, mpe boyokani na biso ebebaki makasi mpenza.

Kasi, mwasi na ngai alɛmbaki ngai te. Abondelaki Nzambe alakisa ye bavɛrsɛ oyo ebongi na ngai mpe atángelaki ngai yango. Maloba ya Mosakoli 2:​22, 23 esimbaki motema na ngai: “Mpo moto azwaka nini na mosala na ye nyonso ya makasi mpe na milende motema na ye ezali kosala na ndenge azali kosala makasi na nse ya moi? . . . Na butu, motema na ye ezali kolala te. Yango mpe ezali kaka mpamba.” Vɛrsɛ yango elobelaki mpenza ngai, namipesaki butu moi na koyekola makambo ya monganga kasi nazwaki esengo ya solosolo te.

Na mokolo moko ya lomingo, na sanza ya nsambo na mobu 1975, ntango mwasi na ngai akendaki na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, nazwaki ekateli mbala moko ya kolanda ye. Mwasi na ngai akamwaki ntango amonaki ngai kuna, mpe Batatoli bayambaki ngai malamu mpenza. Banda mokolo wana, nakómaki koyangana na makita nyonso ya mokolo ya lomingo. Soki sanza moko na nsima, Motatoli ya Yehova moko abandaki koyekola na ngai Biblia. Sanza misato banda na mokolo oyo mwasi na ngai ayambaki Batatoli ya Yehova mbala ya liboso, azwaki batisimo.

Nandimi likanisi ya Nzambe mpo na makila

Naumelaki te koyeba ete Biblia eyebisi bakristo ete ‘báboya makila.’ (Misala 15:28, 29; Ebandeli 9:4) Lokola nazalaki kondima te ete kotya moto makila esalisaka mpenza, nazalaki na mpasi te ya kondima likanisi ya Nzambe mpo na makila. * Nakanisaki ete, ‘Soki Mozalisi azali mpe soki yango nde Ye alobi, alobi solo.’

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mingi oyo Biblia eteyaka mpo na makila, talá mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Nayaki lisusu koyeba ete maladi ná liwa eutá nde na lisumu ya Adama. (Baroma 5:​12) Na ntango wana, nazalaki koyekola artériosclérose. Ntango moto akómi mokóló, misisa na ye ekómaka makasi mpe ekondaka, yango epesaka ye maladi ndenge na ndenge lokola, maladi ya motema, ya motó mpe ya bangɛyi. Emonani mpenza solo ete yango euti na kozanga kokoka oyo batikelá biso. Na nsima wana, molende nazalaki na yango na makambo ya mosala ya monganga ebandaki kokita. Kaka Yehova Nzambe nde akoki kolongola maladi ná liwa!

Na sanza ya misato na mobu 1976, sanza nsambo nsima ya kobanda boyekoli na ngai ya Biblia, natikaki koyekola na inivɛrsite ya lopitalo. Nabangaki mpo nakanisaki ete nakosala lisusu mosala ya monganga te, kasi nazwaki mosala na lopitalo mosusu. Nazwaki batisimo na sanza ya mitano na mobu 1976. Nazwaki ekateli ete lolenge malamu ya kosalela bomoi na ngai ezali ya kozala mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso, to mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe nabandaki yango na sanza ya nsambo na mobu 1977.

Nalobeli na mpiko likanisi ya Nzambe mpo na makila

Na sanza ya zomi na moko na mobu 1979, ngai ná Masuko tokendeki na lisangá moko na Préfecture ya Chiba, epai bazalaki na mposa ya basakoli mingi mpenza. Nazwaki lopitalo moko epai nakokaki kosala kaka ndambo ya mokolo. Na mokolo ya liboso oyo nabandaki mosala, ebele ya minganga oyo basalaka lipaso bazingaki ngai. Batunaki ngai mpenza na mpiko boye: “Lokola ozali Motatoli ya Yehova, okosala nini soki bamemeli biso moto ya maladi oyo esengeli kozongisa ye makila?”

Nalimbwelaki bango na limemya mpenza ete nakolanda oyo Nzambe alobi mpo na makila. Nalimbolaki ete, ezali na ndenge mosusu ya kosalisa moto kozanga kotya ye makila, mpe nakosala nyonso nasunga bato ya maladi oyo nazali kosalisa. Nsima ya kosolola soki ngonga mobimba, monganga oyo akambaka mosala ya kosala lipaso alobaki ete, “Nayoki. Kasi soki bamemeli biso moto ya maladi oyo esengeli mpenza kotya ye makila, biso moko tokosala yango, yo te.” Monganga oyo akambaka mosala ya kosala lipaso azali mpenza moto moko ya matata mingi, kasi nsima ya kosolola wana, tokómaki mpenza baninga, mpe azalaki ntango nyonso komemya bindimeli na ngai.

Limemya na ngai ya makila etyami na komekama

Ntango tozalaki kosala na Chiba, bazalaki kotonga babiro ya Batatoli ya Yehova na Japon na engumba Ebina. Ngai ná mwasi na ngai tozalaki kokende kuna mbala moko na p<u1D10>s<u1D10> mpo na kosalisa Batatoli oyo bamipesaki na bolingo na bango mpo na kotonga bandako yango, oyo babengaka Betele. Nsima ya mwa basanza, babengaki biso tókende kosala na Betele ya Ebina libela. Na yango, na sanza ya misato ya mobu 1981, tobandaki kofanda na mwa bandako oyo babongisaki mpo na bandeko 500 oyo bazalaki kosala kuna. Na ntɔngɔ, nazalaki kotya bopɛto na batwalɛti, mpe na nsima ya midi, nazalaki kosalisa bandeko.

Moko ya bato nazalaki kosalisa ezalaki ndeko mwasi Ilma Iszlaub, autaki na Australie, ayaki mosala ya misionɛrɛ na Japon, na mobu 1949. Azalaki kobɛla maladi ya kanser ya makila (leucémie) mpe minganga na ye bayebisaki ye ete atikali kaka na mwa basanza mpo akufa. Ilma aboyaki bátya ye makila mpo na kobakisa bomoi na ye ata mwa moke, mpe aponaki ete alekisa mwa mikolo ya bomoi oyo atikali na yango na Betele. Na ntango wana, bankisi ya monganga ya komatisa makila, neti EPO (érythropoïétine) ezalaki naino te. Yango wana, ntango mosusu makila na ye ezalaki kokita mingi mpenza (gramɛ 3 to 4, nzokande esengeli ezalaka banda 12 tii 15). Kasi, nazalaki kosala oyo nakoki mpo na kosalisa ye. Ndeko Ilma akobaki komonisa ete azali kondimela Liloba ya Nzambe makasi mpenza tii na liwa na ye na sanza ya yambo na mobu 1988​—mbula soki nsambo na nsima!

Na boumeli ya bambula, bandeko mosusu oyo bazalaki kosala na Biro ya Batatoli ya Yehova na Japon bazalaki kobɛla mpe esengelaki básala bango lipaso. Minganga oyo bazalaki kosala na balopitalo oyo ezali zingazinga wana bandimaki kosalisaka bango, kozanga ete bátya bango makila, mpe yango ezalaki kobakisela bango lokumu mingi na miso ya bato. Mbala mingi, bazalaki kobenga ngai nakota na esika basalaka lipaso, mpe na ntango yango, nazalaki mpe kopesa mabɔkɔ na lipaso. Nazali mpenza kosepela na minganga wana oyo bamemyaki ekateli ya Batatoli ya Yehova ya koboya kotyama makila. Kosala elongo na bango ezalaki kopesa ngai mabaku ya koyebisa bango bindimeli na ngai. Eumelaki te, moko ya minganga yango azwaki batisimo, akómaki Motatoli ya Yehova.

Likambo ya esengo, milende minganga oyo bazalaki kosala mpo na kosalisa Batatoli ya Yehova kozanga ete bátya bango makila, ebakisi mayele ya misala ya monganga mingi mpenza. Emonani polele ete kosala moto lipaso kozanga kotya ye makila ezali malamu koleka kotya makila. Bolukiluki emonisi ete, soki batye moto ya lipaso makila te, abika noki mpe mikakatano nsima ya lipaso ezalaka mpenza te.

Nazali kaka koyekola epai ya Monganga Monene

Nazali kosala makasi nayebaka makambo ya mosala ya minganga oyo ezali kobima sika. Kasi, nazali mpe kaka koyekola epai ya Yehova, Monganga oyo aleki minganga nyonso. Asukaka te kaka na komona biso likolólikoló, kasi amonaka biso mobimba mpenza. (1 Samwele 16:7) Lokola nazali monganga, nasalaka makasi ntango nazali kosalisa moto, nasalisa ye mobimba mpenza, nasuka kaka na maladi na ye te. Yango esalisaka ngai nasalisa bato malamu mpenza.

Nazali kosala na Betele tii sika, nazali kokoba kosalisa bato báyeba Yehova​—báyeba mpe ndenge atalelaka makila​—yango nde moko ya makambo oyo esepelisaka ngai mingi mpenza. Libondeli na ngai ezali ete Monganga oyo aleki minganga nyonso, Yehova Nzambe, asilisa maladi ná liwa libela.​—Lisolo ya Yasushi Aizawa.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 17 Buku moko (Modern Blood Banking and Transfusion Practices) ya Dr. Denise M. Harmening, elobi ete maladi makasi ya bangɛyi ekoki komonana “soki baglobile ya motane ekufikufi nsima ya kotyama makila (réaction hémolytique transfusionnelle retardée) epai ya moto moko, mwasi oyo azali na zemi, to moto oyo batye ye enama moko boye (transplantation).” Na ntango wana, basoda ya nzoto oyo basalaka ete nzoto ya moto oyo azali kobɛla esilika ntango batye ye makila “bakomonana te ntango bakosala makila ekizamɛ ndenge basalaka liboso bátya yango moto.” Na kotalela zulunalo moko (Dailey’s Notes on Blood), kokufakufa ya baglobile ya motane (hémolyse) “ekoki komonana ata ntango batye moto . . . makila moke oyo eyokani te. Soki bangɛyi ebebi, ezali lokola moto ya maladi abandi kolya pwazo mokemoke, mpo bangɛyi ezali na likoki ya kokombola bosotu na makila te.”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

“Nalimbolaki ete, ezali na ndenge mosusu ya kosalisa moto kozanga kotya ye makila, mpe nakosala nyonso nasunga bato ya maladi oyo nazali kosalisa”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]

“Emonani polele ete kosala moto lipaso kozanga kotya ye makila ezali malamu koleka kotya makila”

[Bililingi na lokasa 15]

Na likoló: Nazali kosala diskur

Na lobɔkɔ: Ngai ná mwasi na ngai, Masuko, lelo oyo