Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge ya kobatela bana na yo

Ndenge ya kobatela bana na yo

BATO mingi balingaka te kolobela ntango molai likambo ya kobebisa bana. Kutu, likambo yango esalaka mpenza baboti mpasi mingi soki bakanisi yango. Atako bongo, likambo wana ya mabe ezali kosalema lelo oyo na mokili mpe ezali likama monene mpo na bana. Ezali mpenza na ntina kotalela likambo yango? Soki ozali mpenza na mposa ya kobatela mwana na yo, na ntembe te okondima kosala nyonso mpo na koluka koyeba malamu likambo wana ya mabe, mpamba te koyeba yango ekoki mpenza kosalisa yo.

Likambo ya kobebisa bana ekómi mingi, kasi elɛmbisa yo te. Kutu, bambula oyo osali na mokili esalisi yo okóma na boyebi mingi, omesana na makambo mingi mpe okóma na bwanya mingi. Mwana na yo azali na makoki wana te, mpe ekosɛnga ye bambula mingi mpo akóma na yango. Likambo ya ntina koleka, osengeli kokolisa makoki yango mpe kosalela yango mpo na kobatela mwana na yo. Tokotalela makambo misato ya ntina mingi oyo moboti nyonso akoki kosala: (1) zalá moto ya liboso ya kobatela mwana na yo mpo bábebisa ye te, (2) teyá ye makambo oyo asengeli koyeba, mpe (3) lakisá ye makambo mosusu oyo akoki kosala mpo na komibatela.

Ozalaka moto ya liboso ya kobatela mwana na yo?

Baboti nde bazali na mokumba ya kobatela bana na bango mpo bábebisa bango te. Yango wana, esengeli kosalisa naino baboti báyeba likambo yango malamu. Soki ozali moboti, osengeli koyeba makambo mosusu etali kobebisama ya bana. Na ndakisa, osengeli koyeba banani babebisaka bana mpe ndenge oyo basalaka yango. Mbala mingi, baboti bakanisaka ete bato oyo babebisaka bana ezali bato oyo bayebani na bango te, oyo bazelaka bana na bisika ya molili mpo na kokanga bango mpe kosangisa na bango nzoto na makasi. Bato ya ndenge wana bazalaka, mpe bapanzi-nsango balobelaka bango mingi. Kasi, bazalaka mingi mpenza te. Bato mingi (90%) oyo babebisaka bana ezali nde bato oyo bana bayebi malamu mpe batyelaka bango motema.

Ntango mosusu, okondima te ete moto moko ya motema malamu, na ndakisa oyo bofandi na ye esika moko, molakisi, monganga, moto oyo alakisaka bana masano to ndeko, akoki koluka kobebisa mwana na yo. Ezali solo ete bato mingi balukaka kobebisa bana te mpe osengeli te kokanisela bato nyonso oyo ofandi na bango ndenge wana. Atako bongo, okoki kobatela mwana na yo soki oyebi mayele oyo bato mingi oyo babebisaka bana basalelaka.​—Talá  etanda na lokasa 6.

Soki oyebi mayele na bango, yango ekosalisa yo ozala moto ya liboso ya kobatela mwana na yo. Na ndakisa, okosala nini soki moto moko oyo amonani ete azali kosepela mingi na bana koleka mikóló akómi kotyela mwana na yo likebi mpenza, kokabela ye biloko, kosɛnga ete atikalaka kobatela mwana to abimaka na ye kozwa mopɛpɛ? Okokanisa mbala moko ete azali moto oyo abebisaka bana? Te. Kozwa nokinoki te makanisi ya ndenge wana. Ekoki kozala ete azali kosala makambo nyonso wana na makanisi ya mabe te. Atako bongo, zalá ekɛngɛ. Biblia elobi ete: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.”​—Masese 14:15.

Kobosana te, soki likambo oyo moto asɛngi asalela mwana na yo emonani ete eleki ndelo, ntango mosusu azali nde na makanisi mabe. Talelá malamumalamu moto nyonso oyo asɛngi ete otika ye ná mwana. Yebisá ye ete okobanda koya na esika oyo bazali ntango nyonso olingi. Mélissa ná Brice bazali na bana misato ya mibali mpe bazalaka ekɛngɛ soki esɛngi ete bátika mwana kaka ye moko na mokóló mosusu. Ntango moto moko azalaki koya na ndako kolakisa mwana na bango kobɛta miziki, Mélissa ayebisaki ye boye: “Ntango okozala na mwana, nakobanda kokɔta mpe kobima.” Atako ekoki komonana ete baboti wana balekisi ndelo, kasi malamu básala bongo na esika ete báya kolela na nsima.

Landelá makambo oyo mwana na yo asalaka, badevuare na ye ya kelasi mpe luká koyeba baninga na ye. Soki mwana na yo akani kobima na baninga na ye, luká koyeba likambo yango malamu. Moto moko oyo asalisaka bato ya maladi ya motó atalelaki na boumeli ya mbula 33 makambo ya kobebisa bana; alobi ete bana mingi babebisamaki mpo baboti na bango bazalaki ekɛngɛ te. Alobi ete moto moko oyo tribinale ekweisaki ye mpo na likambo ya kobebisa bana alobaki boye: “Baboti bango moko bapesaka biso bana na bango. . . . Basalaki eloko moko te oyo ekokaki kopekisa ngai.” Kobosana te, bato mingi oyo babebisaka bana baponaka bana oyo babatelami malamu te. Soki baboti bazali mpenza kolandela bana na bango, ekozala mpasi mpo moto abebisa bango.

Okoki mpe kozala moto ya liboso ya kobatela mwana na yo soki ozali koyoka ye malamu. Soki babebisi mwana, mbala mingi akoyebisa moto te mpo bana bayokaka nsɔni mingi mpe babangaka mingi. Yango wana, yokáká bango malamumalamu, ata mwa makambo ya mikemike oyo balobi polele te. * Soki mwana na yo alobi likambo moko oyo etungisi yo, kitisá motema mpe tuná ye mituna mpo abimisa nyonso oyo azali na yango. Soki ayebisi yo ete alingi lisusu te moto oyo atikalaka kobatela ye, tuná ye mpo na nini. Soki alobi ete mokóló moko asakanaka na ye na ndenge moko boye, tuná ye: “Lisano ya ndenge nini? Asalaka yo nini?” Soki ayebisi yo na mawa nyonso ete moto moko asalaki ye dikidiki, tuná ye: “Asimbasimbaki yo na esika nini?” Komona mbala moko te ete biyano ya mwana ezangi ntina. Bato oyo babebisaka bana bayebisaka bana yango ete soki bayebisi moto, akondimela bango te mpe na mawa nyonso, esalemaka bongo. Ntango babebisi mwana, soki baboti bandimeli ye mpe basungi ye, yango ekosalisa ye mingi mpo akóma lisusu malamu.

Zalá moto ya liboso ya kobatela mwana na yo

Teyá mwana na yo makambo oyo asengeli koyeba

Na buku moko oyo elobeli likambo ya kobebisa bana, bazongeli maloba ya moto moko oyo tribinale ekweisaki ye mpo na likambo yango. Alobaki boye: “Soki bopesi ngai mwana oyo ayebi eloko te na oyo etali nzoto na ye ya mwasi to ya mobali, ekozala pɛtɛɛ mpo nabebisa ye.” Maloba wana ya kobangisa esengeli mpenza kokebisa baboti. Ezalaka pɛtɛɛ bato oyo babebisaka bana bákosa bana oyo bayebi eloko te na oyo etali nzoto na bango ya mwasi to ya mobali. Biblia elobi ete boyebi mpe bwanya ekoki kobatela biso “na moto oyo akolobaka makambo ya mobulu.” (Masese 2:10-12) Na ntembe te, yango nde olingi mpo na mwana na yo. Yango wana, likambo ya mibale oyo okoki kosala mpo na kobatela ye ezali ya koteya ye likambo wana ya ntina mingi kozanga kokakatana.

Kasi, ndenge nini oteyaka ye yango? Baboti mingi bayokaka mwa nsɔni kosolola na bana na bango likambo etali nzoto ya mwasi to ya mobali. Mwana na yo akoki kutu koyoka nsɔni koleka yo mpe kokakatana mpenza kotuna yo mituna na likambo yango. Yango wana, yo nde bandá lisolo. Mélissa alobi boye: “Tobandaki kolakisa bana nkombo ya biteni ya nzoto ntango bazalaki naino mike. Tozalaki kobenga biteni ya nzoto na nkombo na yango mpenza, kasi na ndenge ya bana mike te, mpo na kolakisa bango ete eteni moko te ezali ya nsɔni to ezali soki ndenge nini.” Nsima ya koyebisa bana makambo ndenge wana, ezalaka pɛtɛɛ kosolola na bango likambo ya kobebisa bana. Baboti mingi bayebisaka bana na bango na mokuse ete biteni ya nzoto na bango oyo kalɛsɔ ezipi ezali ya bango moko mpe ezali na ntina mingi.

Hélène, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi ete: “Ngai ná Samuel toyebisaki mwana na biso ete nzoto na ye ya mobali ezali kaka mpo na ye moko, ezali lokola eloko ya masano te. Moto moko te, ezala tata to mama, ata mpe monganga, akoki kosakana na yango. Soki tokei na ye epai ya monganga, nayebisaka ye ete monganga alingi nde koyeba soki azali nzoto kolɔngɔnɔ; yango wana, ntango mosusu akoki kosimba ye kuna.” Baboti yango basololaka na mwana na bango mwa masolo ya ndenge wana mpe bayebisaka ye ete akoki koya koyebisa bango soki moto moko asimbi ye na ndenge ya mabe to oyo esepelisi ye te. Bato ya mayele oyo bayekolaka likambo ya kobɔkɔla bana mpe ndenge ya kobatela bango mpo bábebisama te basɛngi ete baboti nyonso básololaka na bana na bango masolo ya ndenge wana.

Baboti mingi bamoni ete buku Yekolá epai ya Moteyi Monene * ezali kosalisa mingi na koteya bana likambo yango. Mokapo 32, oyo ezali na motó ya likambo “Ndenge babatelaki Yesu,” emonisi bana polele mpe na ndenge ya kobɔndisa ete kobebisama ya bana ezali likama mpe basengeli komibatela na yango. Mélissa alobi ete: “Buku yango elakisi biso ndenge ya malamu mpenza ya kofandisa lisusu makambo oyo biso moko toteyaki bana na biso.”

Lelo oyo, bana basengeli koyeba ete ezali na bato mosusu oyo balingaka kosimba bana to kotinda bana básimba bango na ndenge oyo ebongi te. Makebisi yango esengeli kobangisa bana te to kopekisa bango bátyelaka mikóló nyonso motema. Hélène alobi ete: “Ezali kaka mpo na kobatela bana. Kutu, longola yango, ezali mpe na makambo mosusu ebele oyo tokebisaka bana, mpe yango ekómisi mwana na biso moto ya bibangabanga te.”

Osengeli mpe koteya mwana na yo ayeba kotosa na ndenge ebongi. Koteya mwana atosaka ezali pɛtɛɛ te, kasi ezali na ntina mingi. (Bakolose 3:20) Nzokande, botosi yango esengeli koleka ndelo te. Na ndakisa, soki bateyi mwana ete asengeli kotosaka mikóló nyonso, na makambo nyonso, ekozala mpasi te mpo abebisama. Bato oyo babebisaka bana bayebaka nokinoki soki mwana azali bindimandima. Baboti ya bwanya bateyaka bana na bango ete botosi ezalaka na ndelo. Atako yango ekoki komonana mpasi, kasi ezali mpasi te mpo na baklisto. Na mokuse, yango elingi koloba koyebisa mwana ete: “Soki moto ayebisi yo osala likambo oyo Yehova Nzambe apekisi, kosala yango te. Ata mama to tata asengeli te koyebisa yo osala likambo oyo Yehova apekisi. Mpe, soki moto alingi kotinda yo osala likambo ya mabe, yaká koyebisa tata to mama.”

Mpo na kosukisa, yebisá mwana na yo ete moto moko te asengeli koyebisa ye abombela yo likambo. Yebisá ye ete soki moto moko ayebisi ye likambo ya ndenge wana, asengeli mbala moko koya koyebisa yo. Ata soki moto yango ayebisaki ye likambo nini, ezala akaneli ye, to ye moko asali mabe, abanga te koya koyebisa tata to mama. Koyebisa mwana bongo esengeli kobangisa ye te. Okoki kokitisa ye motema mpe koyebisa ye ete bato mingi bakosimba ye te na esika oyo esengeli te, bakotinda ye te aboya kotosa Nzambe to koyebisa ye abombela yo likambo. Koteya ye ndenge wana ezali kaka mpo na kobatela ye, mpe mbala mosusu ata mokolo moko te akokutana na likambo oyo ekosɛnga ete asalela mateya yango.

Teyá mwana na yo makambo oyo asengeli koyeba

Lakisá mwana na yo makambo mosusu oyo akoki kosala mpo na komibatela

Likambo ya misato ezali kolakisa mwana mwa makambo oyo akoki kosala soki moto moko alingi kobebisa ye, wana yo ozali te. Mbala mingi, balendisaka baboti bálakisaka bana makambo yango na nzela ya mwa lisano ya mituna mpe biyano. Baboti bakoki kotuna boye: “Okosala nini soki . . . ?” Mpe mwana akopesa eyano. To okoki koloba boye: “Kanisá ete ngai na yo tozali na zando mpe mbala moko obungi, okosala nini mpo omona ngai?” Mbala mosusu, mwana akopesa mpenza te biyano oyo ozali kokanisa, kasi okoki kotuna ye mituna mosusu mpo na kosalisa ye azwa biyano ya malamu. Na ndakisa, okoki kotuna ye boye: “Okanisi ete okosala nini mpo likama ekómela yo te?”

Okoki kotuna mwana mituna ya ndenge wana mpo ayebisa yo ndenge ya malamu ya kosala soki moto alingi kosimba ye na esika oyo ebongi te. Soki mwana azali kokoka te koyanola na mituna yango, okoki kobɛtela ye lisolo ya mwana mosusu. Na ndakisa, okoki koloba boye: “Mwana moko ya mwasi azali elongo na ndeko na ye moko ya mobali oyo alingaka mingi. Mbala moko, ndeko yango alingi kosimba ye na esika oyo ebongi te. Okanisi ete mwana wana asengeli kosala nini mpo na komibatela?”

Lakisá mwana na yo makambo oyo akoki kosala mpo na komibatela

Makambo nini osengeli koteya mwana na yo asala soki akutani na likambo ya ndenge wana? Mokomi moko alobaki boye: “Mbala mingi, soki mwana alobi na mpiko mpenza ete, ‘Naboyi,’ to ‘Kosimba ngai te,’ to ‘Tiká ngai!’ moto oyo alingaki kobebisa ye abangaka mpe atikaka mpo amoni ete mwana yango azali miso makasi.” Salá elongo na mwana na yo mwa bilakiseli ya mokuse mpo akóma na mpiko ya koboya na mongongo makasi, kokima nokinoki mpe koyebisa yo likambo oyo balingaki kosala ye. Ekómaka ete mwana oyo asimbaki mateya wana malamu, abosana yango nsima ya mwa bapɔsɔ to basanza. Yango wana, zongeláká mateya yango mbala na mbala.

Moto nyonso oyo afandaka na mwana, ezala tata, tata-mobɔkɔli to bandeko na ye mosusu ya mibali, asengeli mpe kopesa makanisi ntango bozali kosolola na mwana. Mpo na nini? Mpamba te, ezali lokola nde bato nyonso oyo bazali wana bazali kopesa ye elaka ete bakosala ye makambo wana ya mabe te. Likambo ya mawa, bana mingi babebisamaka nde na bato ya mabota na bango. Yango wana, lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge oyo okoki kokómisa libota na yo esika ya libateli kati na mokili oyo mabe.

^ par. 10 Bato ya mayele balobi ete bana mingi oyo babebisami basalaka makambo oyo emonisaka ete likambo moko ya mabe ekómeli bango. Na ndakisa, soki mbala moko mwana azongeli mimeseno ya bomwana oyo atikaki, lokola kosuba na mbeto, kokangamakangama na baboti to kobanga kozala ye moko, yango ekoki komonisa ete likambo moko ya monene ezali kotungisa ye. Kasi, makambo yango emonisi mbala moko te ete abebisami. Tuná ye na boboto mpenza mpo ayebisa yo nini ezali kotungisa ye mpo obɔndisa ye, okitisa ye motema mpe obatela ye.

^ par. 15 Ebimisami na Batatoli ya Yehova.