Nayaki koyeba ete makambo ya kozanga bosembo ekosila
Nayaki koyeba ete makambo ya kozanga bosembo ekosila
LISOLO YA URSULA MENNE
Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki na mposa makasi ete básalelaka bato nyonso makambo na bosembo. Yango nde esalaki ete bátinda ngai na bolɔkɔ na Allemagne ya ɛsti. Kuna nde nazwaki biyano na mituna oyo nazalaki komituna na likambo etali kozanga bosembo. Tiká nabɛtɛla bino lisolo yango.
NA BOTAMÁ na mobu 1922 na engumba Halle, na ekólo Allemagne, esali sikoyo mbula koleka 1 200 bandá engumba Halle etongamá. Engumba Halle ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 200 na sudi mpe ɛsti ya engumba Berlin, ezali moko ya bisika oyo lingomba ya Protesta ebandaki. Leki na ngai ya mwasi, Käthe, abotamaki na mobu 1923. Tata na biso azalaki soda mpe mama na biso azalaki koyemba na esika ya lisano.
Makambo oyo namonaki epai ya tata na ngai nde esalaki ete nakóma na mposa makasi ya kolongola makambo ya kozanga bosembo. Ntango tata atikaki mosala ya soda, afungolaki butiki moko. Lokola bakiliya na ye mingi bazalaki babola, azalaki koyokela bango mawa mpe azalaki kodefisa bango biloko. Atako azalaki kosala likambo ya malamu, nsukansuka yango esalaki ete mombongo na ye ekwea. Likambo oyo tata akutanaki na yango eteyaki ngai ete, kobundisa makambo ya kozanga bosembo ezali mpasi mingi koleka ndenge oyo emonanaka. Kasi soki elenge azali na mposa ya kosala likambo moko ezalaka mpasi abongola makanisi na ye.
Lokola mama ayebaki makambo ya miziki, alakisaki ngai ná Käthe koyemba mpe kobina. Ntango tozalaki bana mike, ngai ná Käthe tozalaki na bomoi ya esengo mpenza; ezalaki bongo tii na mobu 1939.
Bwale ebandi
Ntango nasilisaki kelasi ya ntei (secondaire), nakɔtaki na eteyelo ya kobina, epai nayekolaki mabina oyo babengi Ausdruckstanz (mabina oyo emonisaka mayoki ya moto), Mary Wigman nde azalaki molakisi na yango. Ayebaki malamu mabina oyo emonisaka mayoki ya moto, oyo esɛngaka ete moto oyo azali kobina abimisa mayoki moko boye. Nakómaki mpe kosala mayemi. Na ebandeli ya bambula ya bolenge na ngai, nazalaki mpenza na esengo mpe nayekolaki makambo mingi. Kasi na 1939, Etumba ya mibale ya mokili mobimba ebandaki. Likambo mosusu ya mpasi esalemaki na 1941, ntango tata akufaki na maladi ya tuberculose.
Etumba ememaka mpenza bwale. Atako nazalaki kaka na mbula 17 ntango etumba yango ebandaki, nakanisaki ete mokili ekómi na nsuka mpenza. Namonaki ndenge bato ya lokumu ya engumba bazwamaki na motambo ya banazi. Na nsima, biloko ezangaki, bato bakufaki, mpe biloko mingi ebebaki. Ndako na biso ebebaki makasi ntango bombe moko ekwelaki yango, mpe bato mingi ya libota na biso babomamaki.
Ntango etumba yango esilaki na 1945, ngai, mama, mpe Käthe, tozalaki kofanda kaka na Halle. Na ntango wana, nazalaki na mobali mpe mwana ya moke ya mwasi, kasi libala na ngai ezalaki na mikakatano. Nsukansuka tokabwanaki, mpe lokola nasengelaki kokokisa bamposa na ngai mpe ya mwana na ngai ya mwasi, nabandaki kosala mosala ya kobina mpe kosala mayemi.
Nsima ya etumba, ekólo Allemagne ekabwanaki na biteni minei, mpe guvɛrnema ya Union soviétique nde ekómaki koyangela engumba na biso. Yango wana, biso nyonso tosengelaki kosala makambo ndenge boyangeli ya Bakoministe ezalaki kosɛnga. Na 1949, eteni ya Allemagne oyo tozalaki kofanda, oyo ezalaki kobengama mingi Allemagne ya ɛsti, ekómaki kobengama République Démocratique d’Allemagne.
Ndenge bomoi ezalaki na boyangeli ya Bakoministe
Na bambula wana, mama akómaki kobela makasi, mpe esɛngaki ete nasalisaka ye. Nazwaki mosala ya biro na guvɛrnema ya engumba na biso. Na ntango wana, nakutanaki na bana kelasi oyo bazalaki kotomboka mpe kosala nyonso mpo na kobenda likebi ya bato na makambo ya kozanga bosembo oyo ezalaki kosalema. Na ndakisa, balongolaki elenge moko na iniversite kaka mpo tata na ye azalaki moto ya Nazi. Nayebaki elenge yango malamu, mpo tozalaki mbala mingi kolekisa ntango elongo. Namitunaki boye: ‘Mpo na nini asengeli konyokwama mpo na makambo oyo tata na ye asalá?’ Namipesaki lisusu mingi na etuluku ya bana kelasi oyo bazalaki kotomboka, mpe nazwaki ekateli ya kolanda bango ntango bazali kotomboka na bisika ya bato ebele. Mokolo moko natyaki kutu mwa batrakte na eskalye ya ndako esika tribinale ya mboka ezalaki.
Etumba na ngai mpo na makambo ya kozanga bosembo eyaki lisusu makasi ntango bapesaki ngai mosala ya kokoma mikanda na Komite mpo na kobatela kimya na mboka. Na ndakisa, na libaku moko boye, mpo na bantina ya makambo ya politiki, komite yango ezalaki komibongisa kosalela mayele mabe mpo na kotindela tata moko ya mobange na Allemagne ya Wɛsti biloko ya propagandi ya Bakoministe, mpo na nsima bazwa likambo ya kofunda ye na yango. Nasilikaki mpenza ndenge balingaki kosalela tata wana ya mobange makambo na kozanga bosembo, yango wana nabombaki na biro liboke yango ya biloko oyo balingaki kotindela ye. Nini esalemaki? Biloko yango ekendaki te.
“Moto oyo aleki mabe na esika tozalaki” apesaki ngai elikya
Na sanza ya motoba ya mobu 1951, mibali mibale bakɔtaki na biro na ngai mpe bayebisaki ngai boye: “Toyei kokanga yo.” Bamemaki ngai na bolɔkɔ moko oyo eyebanaki na nkombo Roter Ochse, to Red Ox. Nsima ya mbula moko, bafundaki ngai ete nazali kosalela Leta makambo ya mabe. Mwana kelasi moko nde afundaki ngai epai ya bakoministe ya ɛsti ya Allemagne, mpe epai ya bapolisi, ayebisaki bango ete ngai nde natyaki batrakte na tribinale. Basambisaki ngai na bosembo te mpo moto moko te atyaki likebi na makambo oyo nazalaki koloba. Bakatelaki ngai etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ. Na ntango wana, nabɛlaki makasi mpe batyaki ngai na esika ya kolala oyo ezalaki na lopitalo ya bolɔkɔ elongo na basi mosusu 40. Nsima ya komona ebele ya bato wana oyo bazalaki na esengo te, nakómaki kobanga. Nakimaki mbangu na porte mpe nabandaki kobɛta yango makofi.
Mokɛngɛli moko atunaki ngai boye: “Olingi nini?”.
Nagangaki: “Nasengeli kobima awa, tyá ngai ata esika ya ngai moko soki olingi, kasi nasengeli kobima awa!” Akipaki ngai ata te. Mwa moko na nsima, namonaki mwasi moko oyo akesanaki mpenza na basusu. Miso na ye ezalaki komonisa ete azalaki na kimya ya motema. Na yango, nafandaki pene na ye.
Alobaki na ngai boye: “Soki ofandi pene na ngai, ekozala malamu ozala ekɛngɛ,” yango ekamwisaki ngai. Na nsima abakisaki: “Basusu bazali kokanisa ete nazali moto oyo aleki mabe na esika tozali, mpo nazali Motatoli ya Yehova.”
Na ntango wana, nayebaki te ete na bamboka oyo bakoministe bazalaki koyangela, bazalaki kotalela Batatoli ya Yehova lokola banguna. Kasi oyo nayebaki mpo na bango ezali ete Bayekoli ya Biblia mibale (ndenge bazalaki kobenga Batatoli na kala) bazalaki koya kotala tata mbala na mbala wana nazalaki naino mwana. Kutu, nazali koyeba lisusu oyo tata azalaki koloba mpo na bango, azalaki koloba ete, “Bayekoli ya Biblia bazali bato malamu!”
Nabimisaki mai ya miso ya esengo ndenge nakutanaki na mwasi yango, oyo nkombo na ye ezalaki Berta Brüggemeie. Nayebisaki ye boye: “Nabondeli yo, yebisá ngai makambo ya Yehova.” Kobanda na ntango wana, tokómaki kolekisa ntango mingi elongo, mpe tozalaki mbala mingi kolobela makambo ya Biblia. Longolá makambo mosusu oyo nayekolaki, nayekolaki mpe ete Nzambe ya solo Yehova, azali Nzambe ya bolingo, ya bosembo mpe ya kimya. Lisusu, nayekolaki ete akolongola mpasi nyonso oyo bato mabe babimiselaka bato. Nzembo 37:10, 11 elobi boye: “Mpe etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”
Kobima na ngai na bolɔkɔ mpe mobembo na Allemagne ya Wɛsti
Babimisaki ngai na bolɔkɔ na mobu 1956, nsima ya kolekisa mbula mwa moke koleka mitano. Mikolo mitano nsima ya kobima na bolɔkɔ, nakimaki République Démocratique d’Allemagne mpe nakómaki kofanda na Allemagne ya Wɛsti. Na ntango yango, nazalaki na bana mibale ya basi, Hannelore mpe Sabine, oyo namemaki kuna. Kuna nde, tobomaki libala mpe nakutanaki lisusu na Batatoli ya Yehova. Wana nazalaki koyekola Biblia, namonaki ete nasengelaki kosala bambongwana mingi na bomoi na ngai mpo nayokanisa yango na mitinda ya Yehova. Nasalaki bambongwana yango, mpe nazwaki batisimo na 1958.
Na nsima, nabalanaki na mobali mosusu, ya mbala oyo ezalaki Motatoli ya Yehova na nkombo Klaus Menne. Ngai ná Klaus tozalaki na libala ya malamu mpenza mpe tobotaki bana mibale, Benjamin mpe Tabia. Likambo ya mawa, eleki sikoyo mbula 20 bandá Klaus akufaki na aksida moko, mpe tii lelo oyo nazali mwasi oyo mobali akufá. Kasi elikya ya lisekwa mpe koyeba ete bakufi bakozonga na bomoi epesaka ngai makasi mpenza. (Luka 23:43; Misala 24:15) Mpe nazwaka mpenza makasi ntango nayebaka ete bana na ngai nyonso minei bazali kosalela Yehova.
Boyekoli na ngai ya Biblia esalisi ngai nayeba ete kaka Yehova nde akoki kopesa bato bosembo ya solosolo. Na bokeseni na bato, Yehova atyaka likebi na makambo na biso nyonso, ezala mpe ndenge oyo tobɔkwamá; makambo oyo emonanaka polele te na miso ya basusu. Koyeba likambo yango epesaka ngai kimya, mingimingi ntango namoni to nakutani na makambo ya kozanga bosembo. Mosakoli 5:8 elobi: “Soki omoni bazali konyokola moto oyo akelelá mpe bazali kolongola na makasi bosembo ná boyengebene na etúká moko oyo eyangelami, kokamwa na likambo yango te, mpo moto oyo azali likoló koleka oyo azali likoló azali kotala, mpe ezali na baoyo bazali likoló na bango.” (Biblia libongoli ya mokili ya sika) Na ntembe te, “Moto oyo azali likoló koleka,” ezali Mozalisi na biso. Baebre 4:13 elobi: “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.”
Kokanisa makambo oyo eleká esali sikoyo mbula 90
Mbala mosusu bato batunaka ngai soki makambo ezalaki ndenge nini ntango banazi mpe bakoministe bazalaki koyangela. Ata na boyangeli moko te bomoi ezalaki malamu. Balolenge yango mibale ya boyangeli, ezala mpe balolenge nyonso ya baguvɛrnema ya bato oyo ezali lelo, ezali kaka kondimisa biso ete bato bakoki komiyangela bango moko te. Biblia elobi polele ete: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9.
Ntango nazalaki elenge mpe nayebaki makambo mingi te, mposa na ngai ezalaki ete bato batyá boyangeli oyo ekosala ete makambo etambola na bosembo. Kasi sikoyo nayebi makambo mingi. Kaka Mozalisi na biso nde akoki kotya bosembo ya solosolo na mokili, mpe akosala yango ntango akolongola bato nyonso ya mabe mpe akopesa boyangeli ya mabele na mabɔkɔ ya Mwana na ye, Yesu Kristo, oyo atyaka ntango nyonso matomba ya basusu na esika ya liboso. Biblia elobi boye mpo na Yesu: “Olingaki boyengebene, mpe oyinaki makambo ya kobuka mibeko.” (Baebre 1:9) Nazali na botondi ndenge Nzambe abendá ngai epai ya Mokonzi yango ya malamu mpe ya sembo, oyo na nse ya Bokonzi na ye nazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela!
[Elilingi na lokasa 23]
Elongo na bana na ngai ya basi Hannelore mpe Sabine nsima ya kokóma na Allemagne ya Wɛsti
[Elilingi na lokasa 23]
Lelo oyo, elongo na mwana na ngai ya mobali, Benjamin, mpe mwasi na ye, Sandra