LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Octobre 2017

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 27/11 tii 24/12/2017.

LISOLO YA BOMOI

Kosala oyo Yehova asɛngi ememaka mapamboli

Na 1952, Olive Matthews ná mobali na ye bandimbaki kokende na Irlande mpo na kozala babongisi-nzela kuna. Ndenge nini Yehova apambolaki bango?

“Tólingaka . . . na misala mpe na solo”

Ndenge nini tokomonisa ete tolingaka mpenza na motema, kozanga bokosi?

Solo ememaka “kimya te, kasi mopanga”

“Mopanga” oyo Yesu alobaki akomema ezali nini, mpe yango etali yo na nini?

Yozefe ya Arimatea amonisaki mpiko

Mobali yango azalaki nani? Boyokani nini azalaki na yango na Yesu? Lisolo na ye etali yo na nini?

Bimonaneli oyo Zekaria amonaki etali yo na nini?

Rulo moko ezali kopumbwa, mwasi moko na kati ya nzungu, mpe basi mibale bazali kopɛpa mapapu na bango. Mpo na nini Nzambe amonisaki Zekaria emonaneli yango bongo?

Makolo na motole moko ezali kobatela yo

Bangomba ya motako, makalo mpo na bitumba, mpe nganga-nzambe monene akómi mokonzi. Lelo oyo emonaneli ya nsuka ya Zekaria ezali kolendisa basaleli ya Yehova na nini?

Likambo moko oyo emonisaki boboto

Ndenge nini likambo moko ya boboto esalisaki moto oyo azalaki motɛmɛli asepela na mateya ya Biblia?

Oyebaki yango?

Makambo nini etindaki Yesu apekisaki kolapa ndai?