Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini?

Bato nde babandisá lingomba?

BATO MOSUSU BAKANISAKA ete bato nde babandisá lingomba; basusu bakanisaka ete Nzambe asalelaka lingomba mpo na kosalisa bato bakóma baninga na ye. Okanisi nini?

OYO BIBLIA ELOBAKA

Ezali na “losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata.” (Yakobo 1:27) Nzambe nde abandisá Lingomba ya solo; elingi koloba oyo ezangi mbindo.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOYEKOLAKA NA BIBLIA?

  • Mpo Nzambe asepela na lingomba, mateya na yango esengeli euta na solo ya Biblia.​—Yoane 4:23, 24.

  • Lingomba oyo mateya na yango euti na makanisi ya bato ezali mpamba.​—Marko 7:7, 8.

Ezali na ntina kozala mondimi ya lingomba moko boye?

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

OYO BIBLIA ELOBAKA

“Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te.” (Baebre 10:24, 25) Nzambe alingi ete bato báyanganaka esika moko mpo na kosambela ye.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOYEKOLAKA NA BIBLIA?

  • Mateya ya baoyo basambelaka esika moko esengeli kozala na boyokani.​—1 Bakorinti 1:10, 11.

  • Bandimi ya lingomba oyo Nzambe andimaka bazali lisangá ya bandeko na mokili mobimba.​—1 Petro 2:17.