Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA​—NDENGE OYO EBATELAMAKI

Mpo na nini Biblia ebatelamaki?

Mpo na nini Biblia ebatelamaki?

Biblia ebatelamaki. Yango wana lelo oyo okoki kozwa mpe kotánga yango. Mpe soki ozwi libongoli ya malamu ya Biblia, yebá ete ozali kotánga kopi ya Biblia ndenge ekomamaki na ebandeli. * Kasi mpo na nini Biblia ebatelamaki atako ekokaki kobeba, batɛmɛlaki yango mpe balukaki kobebisa mateya na yango? Nini ekesenisi yango na babuku mosusu?

“Nandimi sikoyo ete Biblia oyo nazali na yango ezali likabo oyo euti na Nzambe”

Bayekoli mingi ya Biblia bamoni ete maloba oyo ya ntoma Paulo ezali solo; akomaki boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Bandimaka ete Biblia ebatelamaki mpo ezali Liloba ya Nzambe mpe Nzambe nde abateli yango tii lelo. Faizal, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli azwaki ekateli ya koyekola Biblia mpo na koyeba soki ezali mpenza bongo. Makambo amonaki ekamwisaki ye. Amonaki ete mateya mingi oyo mangomba ya bokristo eteyaka ezali na Biblia te. Lisusu, ndenge Biblia emonisi mokano ya Nzambe mpo na mabele, esimbaki motema na ye.

Alobi boye: “Nandimi sikoyo ete Biblia oyo nazali na yango ezali likabo oyo euti na Nzambe. Kutu, soki Nzambe asalá mokili akoki nde kozanga nguya ya kokomisa buku moko mpe abatela yango mpo na biso? Kokanisa bongo ezali lokola komona ete nguya ya Nzambe ezali na ndelo. Nani akoki kotya ndelo na nguya ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?”​—Yisaya 40:8.

^ par. 3 Talá lisolo “Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2008.