Lakisá makambo oyo ezali na kati

Teyá bana na yo

Timote—Amilengelaki mpe azalaki na mposa ya kosala

Timote—Amilengelaki mpe azalaki na mposa ya kosala

“OMILƐNGƐLI?” Basilá kotuna yo motuna wana?​— Boye, moto oyo atunaki yo alingaki koyeba soki omibongisaki. Na ndakisa, moto yango alingaki koloba boye: ‘Ozali na mikanda na yo mpo na koyekola? Otángaki?’ Ndenge tokomona yango, Timote amilɛngɛlaki.

Timote azalaki mpe na mposa ya kosala. Oyebi soki yango elimboli nini?— Ntango babengaki Timote na mosala ya Nzambe, azalaki na makanisi ndenge moko na mosaleli mosusu ya Nzambe oyo alobaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Lokola amilɛngɛlaki mpe azalaki na mposa ya kosala, Timote azalaki na bomoi ya esengo. Olingi koyeba lisolo na ye?—

Timote abotamaki na Lisitala, engumba moko oyo ezalaki mosika mpenza na Yelusaleme. Nkɔkɔ na ye ya mwasi Loisi ná mama na ye Enisi, bazalaki mpenza bayekoli ya Biblia. Ata ntango Timote azalaki naino moke mpenza, babandaki koteya ye Liloba ya Nzambe.​—2 Timote 1:5; 3:15.

Ekoki kozala ete ntango Timote azalaki naino elenge, ntoma Paulo ná Balanabasi bakómaki na engumba Lisitala, wana bazalaki kosala mobembo na bango ya liboso ya molai. Ekoki mpenza kozala ete mama mpe nkɔkɔ ya Timote bakómaki baklisto na ntango wana. Olingi koyeba mikakatano oyo Paulo ná Balanabasi bakutanaki na yango?— Bato oyo balingaki baklisto te babambaki Paulo mabanga, bakweisaki ye na nse, mpe babendaki ye na libándá ya engumba. Bakanisaki ete akufi.

Bato oyo bandimaki mateya ya Paulo, bazingaki ye mpe alamukaki. Mokolo elandaki, Paulo ná Balanabasi balongwaki na Lisitala; kasi mwa moke na nsima, bazongaki lisusu na engumba yango. Ntango bakómaki, Paulo asalaki lisukulu moko mpe alobaki na bayekoli boye: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” (Misala 14:8-22) Oyebi soki Paulo alingaki koloba nini na maloba yango?— Alingaki koloba ete bato mosusu bakonyokola basaleli ya Nzambe. Na nsima, Paulo akomelaki Timote boye: ‘Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe bakonyokwama.’—2 Timote 3:12; Yoane 15:20.

Na nsima, Paulo ná Balanabasi balongwaki na Lisitala mpe bazongaki epai na bango. Mwa basanza na nsima, Paulo azwaki Silasi mpo na kosala na ye mibembo, mpe bazongaki na bamboka oyo Paulo alekaki liboso mpo na kolendisa bayekoli ya sika. Ntango bakómaki na Lisitala, Timote asepelaki mingi komona lisusu Paulo! Timote asepelaki lisusu koleka ntango Paulo ná Silasi basɛngaki ye ete akende na bango na mibembo. Timote andimaki. Amilɛngɛlaki mpe azalaki na mposa ya kokende.​—Misala 15:40–16:5.

Mibali yango misato basalaki mibembo ya milai mpenza na makolo, mpe nsukansuka bakɔtaki na masuwa. Nsima ya kokatisa na ngámbo mosusu ya mbu, bakendaki na Tesaloniki, na ekólo Grèce. Kuna, bato mingi bakómaki baklisto. Kasi, bato mosusu bakómaki na nkanda mpe basanganaki mpo na kosala bango mabe. Bomoi ya Paulo, Silasi, ná Timote ezalaki na likama; yango wana, balongwaki wana mpe bakendaki na Beloya.​—Misala 17:1-10.

Paulo amitungisaki mpo na bandimi ya sika na Tesaloniki; yango wana, atindaki Timote azonga kuna. Oyebi mpo na nini?— Na nsima Paulo alimbolaki baklisto ya Tesaloniki boye: ‘Mpo apesa bino makasi mpe abɔndisa bino mpo ete moto moko te alɛmba nzoto.’ Oyebi mpo na nini Paulo apesaki elenge Timote mokumba wana oyo ezalaki na likama?— Banguna bayebaki Timote malamu te, mpe andimaki kokende. Yango esɛngaki ye azala na mpiko! Mobembo na ye ebotaki mbuma nini? Ntango Timote azongaki epai ya Paulo, ayebisaki ye ete Batesaloniki bazalaki na kondima mingi. Yango wana Paulo akomelaki bango boye: “Tobɔndisami likoló na bino.”​—1 Batesaloniki 3:2-7.

Timote asalaki elongo na Paulo na boumeli ya mbula zomi oyo elandaki. Na nsima, Paulo akɔtaki bolɔkɔ na Loma mpe Timote, oyo mpe autaki kobima na bolɔkɔ, akendaki mpo azala na ye elongo. Ntango azalaki na bolɔkɔ, Paulo akomaki mokanda moko epai ya Bafilipi, mbala mosusu Timote nde azalaki mokomeli na ye. Paulo alobaki boye: ‘Nazali kolikya kotindela bino Timote, mpo nazali na moto mosusu te oyo azali mpenza sembo lokola ye mpe akosalela bino malamu koleka.’​—Bafilipi 2:19-22; Baebele 13:23.

Na ntembe te maloba yango esepelisaki Timote mingi! Paulo akómaki kolinga Timote mingi mpamba te amilɛngɛlaki mpe azalaki na mposa ya kosala. Tozali na elikya ete yo mpe okozala bongo.