Lakisá makambo oyo ezali na kati

Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo

Ndenge ya kosilisa mikakatano

Ndenge ya kosilisa mikakatano

Mobali: “Bana bazali wapi?”

Mwasi: “Bakei kosomba bilamba na magazini.”

Mobali: [Alɛmbi nzoto mpe alobi na mongongo makasi] “Nini? Bakei kosomba bilamba? Bautaki kosomba bilamba ya sika kaka na sanza oyo eleki!”

Mwasi: [Aluki komilongisa] “Bayokaki ete bilamba ekiti ntalo. Kutu, basɛngaki ngai nzela mpe nandimaki bákende.”

Mobali: [Ayoki nkanda mpe atomboli lisusu mongongo] “Oyebi malamu ete nalingaka te ete bana básomba biloko kozanga kotuna ngai! Mpo na nini ondimi likambo ya boye kozanga ete oyebisa ngai liboso?”

MPO na yo, mikakatano nini mobali wana ná mwasi na ye bazali na yango? Emonani ete mobali azali na mokakatano mpo na kopekisa nkanda na ye. Kasi, emonani mpe ete mobali yango ná mwasi na ye bazali na makanisi ekeseni na likambo etali bonsomi oyo basengeli kotikela bana. Longola yango, basololaka malamu te.

Na mabala nyonso, mikakatano ezangaka te. Babalani nyonso bakutanaka na mikakatano ya lolenge moko to mosusu. Ata soki mokakatano yango ezali moke to monene, mobali ná mwasi basengeli koyeba ndenge ya kosilisa yango. Mpo na nini?

Soki mwasi ná mobali bazali kosilisa mikakatano na bango te, yango ekoki kopekisa bango básololaka malamu. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Kowelana ezali lokola bikangeli ya ndako makasi.” (Masese 18:19) Bokoki kosala nini mpo bósololaka malamu ntango bozali na mikakatano?

Kosolola malamu ebongisaka boyokani ya mwasi ná mobali; nzokande, bolingo mpe limemya nde esalisaka bango báyeba kosolola malamu. (Baefese 5:33) Ntango mwasi ná mobali balingi kosilisa mokakatano oyo ebimi, bolingo esengeli kotinda mokomoko abosana makambo oyo eleká​—ata mpe mpasi oyo ayokaki​—mpe atya makanisi na ye na mokakatano oyo bazali na yango sikoyo. (1 Bakolinti 13:4, 5; 1 Petelo 4:8) Limemya esengeli kotinda mokomoko atika molongani na ye amonisa makanisi na ye mpe asala makasi ya koyeba likambo oyo moninga alingi koloba ata soki abimisi yango na maloba te.

Matambe minei mpo na kosilisa mikakatano

Talelá makambo minei oyo ezali awa na nse, mpe talá ndenge oyo toli ya Biblia ekoki kosalisa bino bósilisa mikakatano na bolingo mpe na limemya.

1. Ponáká ntango mpo na kolobela likambo.

“Ntango ezali mpo na eloko na eloko, . . . ntango ya kozala nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:1, 7) Ndenge lisolo oyo ezali na ebandeli emonisi yango, makambo mosusu epesaka nkanda. Soki esalemi bongo, yebá komipekisa mpe tiká naino likambo yango​—to ‘zalá nyɛɛ’​—liboso ete nkanda epela makasi. Bokobatela boyokani ya malamu soki bolandi toli oyo ya Biblia: “Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mai; malamu ólongwa liboso ‘té koswana ébanda.”​—Batoli 17:14, Bible na lingala ya lelo oyo.

Nzokande, ezali mpe na “ntango ya koloba.” Mikakatano ezalaka lokola matiti mabe, soki balongoli yango noki te, epalanganaka. Yango wana, bókanisaka te ete soki mokakatano moko ebimi, ekosila yango moko. Soki omoni malamu bótika naino lisolo wana mpo bobandi kobendana, limemya mpo na molongani na yo esengeli kotinda yo oyebisa ye ete bokolobela yango nsima. Kosala bongo ekosalisa bino bólanda toli ya Biblia oyo elobi ete: “Tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda.” (Baefese 4:26) Soki mpe ntango ya kosolola likambo yango ekoki, bosengeli kosolola ndenge olakaki.

MEKÁ KOSALA BOYE: Bóponaka ntango ya malamu pɔsɔ nyonso mpo na kolobelaka mikakatano ya libota. Bólobelaka te makambo na bangonga oyo bomonaka ete boumelaka te kobendana​—⁠na ndakisa, ntango bouti na mosala to liboso ya kolya. Kasi, bópona ntango oyo bozalaka na motema ya kokita.

2. Monisáká makanisi na yo na bosembo mpe na limemya.

“Bólobanaka solo mokomoko na bino elongo na mozalani na ye.” (Baefese 4:25) Mpo na moto oyo abalá, mozalani na ye ya libosoliboso ezali molongani na ye. Yango wana, ntango ozali kosolola na molongani na yo, monisáká polele ndenge ozali komiyoka. Margareta, * mwasi moko oyo asali mbula 26 na libala, alobi boye: “Ntango nabalaki sika, nazalaki kokanisa ete mobali na ngai akobanda ntango nyonso koyeba ndenge oyo nazali komiyoka soki mokakatano moko ebimi. Na nsima, nayaki komona ete nazalaki komikosa. Lelo oyo, nasalaka makasi namonisa polele makanisi na ngai mpe ndenge oyo nazali komiyoka.”

Ntango bozali kolobela mokakatano moko, kobosanaka te ete mokano na yo ezali te ya kolonga to kokweisa molongani na yo, kasi ya komonisa ye makanisi na yo. Mpo na kosala yango malamu, osengeli komonisa ye mokakatano ezali nini; na nsima, yebisá ye ntango oyo mokakatano yango ebimaka, mpe monisá ye ndenge oyo omiyokaka. Na ndakisa, soki omonaka ete molongani na yo abebisaka ndako, okoki koloba na ye na limemya nyonso ete, ‘Soki oyei, ndenge otikaka bilamba bipai na bipai [omonisi mokakatano mpe ntango oyo esalemaka], namonaka lokola nde oyebaka te mpasi oyo nayokaka mpo na kobongisa ndako [omonisi ndenge omiyokaka].’ Na nsima, lobá ndenge oyo yo okanisi bokoki kosilisa mokakatano yango.

MEKÁ KOSALA BOYE: Mpo obosana te makambo oyo olingi kosolola na molongani na yo, komá yango, komá mpe ndenge oyo okanisi bokoki kosilisa mokakatano yango.

3. Yokáká molongani na yo mpe lukáká koyeba ndenge oyo azali komiyoka.

Moyekoli Yakobo akomaki ete baklisto basengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) Moko na makambo oyo esilisaka mpenza moto esengo na libala ezali ntango akómi komona ete molongani na ye azali komitya na esika na ye te. Yango wana, saláká makasi mpo molongani na yo amonaka bongo te!​—Matai 7:12.

Wolfgang, oyo abalá esili koleka mbula 35, alobi boye: “Ntango tozali kolobela likambo moko, namitungisaka mpenza ntango namoni ete mwasi na ngai azali koyeba makanisi na ngai te.” Dianna, oyo asali mbula 20 na libala, alobi boye: “Mbala mingi nayebisaka mobali na ngai ete namonaka lokola nde ayokaka ngai mpenza te ntango tozali kolobela likambo moko.” Ndenge nini bokoki kosilisa mokakatano yango?

Kokanisa te ete oyebi makanisi to mayoki ya molongani na yo. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Lolendo ebimisaka bobele koswana; kasi bato oyo bandimaka batoli bazali bato ya mayele.” (Batoli 13:10, Bible na lingala ya lelo oyo) Zaláká na limemya mpo na molongani na yo mpe tikeláká ye ntango ya komonisa makanisi na ye kozanga ete okata ye maloba. Na nsima, mpo na komonisa ete okangi ntina ya makambo oyo alobi, zongelá yango, kasi kosala yango te na ndenge ya kotyola to na nkanda. Ndimá molongani na yo asembola yo soki amoni ete osimbaki malamu te likambo moko oyo alobaki. Tikelá ye mpe ntango ya koloba. Ata soki ozali koloba, yokáká mpe ye tii ntango bokoyokanisa makanisi na bino mpe mokomoko akoyeba mposa ya moninga.

Ya solo, esɛngaka kozala na komikitisa mpe na motema molai mpo na koyoka molongani na yo na likebi nyonso mpe kondima makanisi na ye. Kasi, soki ozali moto ya liboso mpo na kopesa molongani na yo lokumu, ye mpe akokakatana te kopesa yo lokumu.​—Matai 7:2; Baloma 12:10.

MEKÁ KOSALA BOYE: Ntango ozali koyebisa molongani na yo makambo oyo auti koloba, esengeli te ozongela kaka maloba ndenge alobaki. Na boboto nyonso, meká komonisa ye makambo oyo osimbi na oyo alobi mpe ndenge oyo azali komiyoka.​—1 Petelo 3:8.

4. Bóyokana likambo oyo bokosala.

“Mibale baleki moko na malamu, zambi bakozala na libonza malamu na mosala na bango. Mpo ete soko bakokwea, moko akotombola moninga na ye.” (Mosakoli 4:9, 10) Mikakatano mingi ekoki kosila soki mwasi ná mobali bazali kosala na bomoko mpe bazali kopesana mabɔkɔ.

Ya solo, Yehova atye mobali mokonzi ya libota. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:23) Kasi, kozala mokonzi elimboli te kozala makambo makasimakasi. Mobali oyo azali na bwanya akozwa te bikateli kozanga kotuna makanisi ya mwasi na ye. David, oyo abalá eleki mbula 20, alobi boye: “Nalukaka esika oyo ngai ná mwasi na ngai tozali koyokana mpe nazwaka ekateli oyo biso mibale tokondima.” Tanya, oyo aumeli mbula nsambo na libala, alobi boye: “Ntina ezalaka te ya koluka nani asali mabe. Ntango mosusu makanisi kaka nde ekesanaka mpo na ndenge ya kosilisa mokakatano. Namoni ete sɛkɛlɛ mpo na kolonga ezali koboya kozala makambo makasimakasi.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Bómonisa ete bokoki kosala na bomoko; mpo na yango, bókomaka makanisi ndenge na ndenge oyo bokoki kosalela mpo na kosilisa mokakatano moko. Ntango mokomoko na bino asilisi kokoma, bótalela makambo yango mpe bósalela makanisi na bino oyo eyokani. Na nsima, bóluka ntango moko oyo bokotalela soki bosalelaki ekateli oyo bozwaki mpe soki elongi.

Bósalaka na bomoko

Yesu akokanisaki libala na ekanganeli. (Matai 19:6) Ekanganeli ezali libaya moko oyo bazalaki kokanga na yango banyama mibale mpo básala mosala elongo. Soki banyama yango bazali kosala na bomoko te, mosala ezalaki kosalema malamu te mpe ekanganeli yango ezalaki kozokisa bango nkingo. Nzokande, ntango bazali kosala na bomoko, bazalaki kobenda ata biloko ya kilo mingi to mpe kotimola mabelé.

Ndenge moko mpe, mobali ná mwasi oyo bazali kosala na bomoko te bazalaka na mitungisi mingi na libala na bango. Nzokande, soki bazali kosala na bomoko, bakoki kosilisa ata mokakatano nini mpe kosala makambo mingi ya malamu. Mpo na komonisa likambo yango, Kalala, mobali moko oyo azali na libala ya esengo, alobaki boye: “Ngai ná mwasi na ngai tosali mbula 25 ya libala mpe tosololaka polele mpo na kosilisa mikakatano na biso, moto na moto amityaka na esika ya moninga, tobondelaka Yehova, mpe tosalelaka batoli ya Biblia.” Yo mpe okoki kosala bongo?

OMITUNA . . .

  • Mokakatano nini namoni malamu nalobela na mwasi na ngai?

  • Nasengeli kosala nini mpo namindimisa ete nayebi ndenge oyo molongani na ngai azali komiyoka?

  • Soki nalingaka kaka makambo esalema ndenge oyo nalingi, mikakatano nini nakoki kobimisa?

^ par. 17 Bankombo mosusu ezali ya bango te.