Lakisá makambo oyo ezali na kati

Teyá bana na yo

Mpo na nini Davidi azalaki kobanga te?

Mpo na nini Davidi azalaki kobanga te?

NAINO obangá te?​— * Mingi kati na biso tobangaka ntango mosusu. Ntango ozali kobanga, okoki kosala nini?— Okoki kokende epai ya moto oyo azali engambe mpe makasi koleka yo. Ntango mosusu tata to mama na yo bakoki kosalisa yo. Ndakisa ya Davidi ekoki kosalisa biso tóyeba epai tokoki koluka lisalisi. Ayembelaki Nzambe boye: “Ngai, nakozala na elikya epai na ye. . . . Nakolikya epai ya Nzambe mpe nakobanga soki moke te.”​—Nzembo 56:3, 4.

Okanisi ete nani asalisaki Davidi mpo abangaka te? Baboti na ye?— Ekoki kozala ete baboti na ye nde basalisaki ye. Tata na ye Yese, azalaki nkɔkɔ ya Yesu Klisto, oyo Nzambe alakaki ete akozala “Nkolo ya kimya.” (Yisaya 9:6; 11:1-3, 10) Nkɔkɔ ya Davidi, tata ya Yese ezalaki Obede. Mokanda moko ya Biblia ezali na nkombo ya mama ya Obede. Oyebi nkombo yango?— Ezali Luta, mwasi moko ya sembo, oyo mobali na ye ezalaki Boaza.​—Luta 4:21, 22.

Na ntembe te, Luta ná Boaza bakufaki bambula mingi liboso Davidi abotama. Okoki koyeba nkombo ya mama ya Boaza, nkɔkɔ ya nkɔkɔ ya Davidi. Azalaki kofanda na Yeliko mpe abikisaki banɔngi mosusu ya Yisalaele. Ntango bifelo ya Yeliko ekweaki, ye ná libota na ye babikaki mpo akakisaki nsinga ya motane na lininisa na ye. Nkombo na ye nani?— Ezali Lahaba, oyo akómaki mosambeli ya Yehova, mpe atiká ndakisa ya mpiko oyo baklisto basengeli komekola.​—Yosua 2:1-21; 6:22-25; Baebele 11:30, 31.

Tokoki mpenza kondima ete tata ya Davidi ná mama na ye babɛtɛlaki ye lisolo ya basaleli wana ya Yehova ya sembo, mpamba te baboti bazalaki na mokumba ya koteya bana na bango makambo ya ndenge wana. (Deteronome 6:4-9) Mokolo moko, Nzambe atindaki mosakoli Samwele apona Davidi, mwana ya nsuka ya Yese, mpo akóma mokonzi ya Yisalaele.​—1 Samwele 16:4-13.

Mokolo moko, Yese atindaki Davidi akende kotika biloko epai ya bandeko na ye misato oyo bazalaki kobunda na Bafilistia, banguna ya Nzambe. Ntango Davidi akómaki kuna, akendeki noki epai bitumba ezalaki mpe ayokaki ndenge engambe mobali Goliata azalaki kotyola “basoda ya Nzambe ya bomoi.” Bato nyonso bazalaki kobanga kobunda na Goliata. Ntango Mokonzi Saulo ayokaki ete Davidi andimi kokende kobunda na Goliata, abengaki ye. Kasi, ntango Saulo amonaki Davidi, alobaki boye: “Ozali bobele elenge.”

Davidi ayebisaki Saulo ete abomaki nkɔsi mpe ngombolo oyo elingaki kolya bampate ya libota na bango. Davidi alobaki na Saulo ete Goliata “akozala lokola moko na bango.” Saulo ayebisaki ye ete: “Kendá mpe [Yehova] azala na yo elongo.” Davidi azwaki mabanga mitano, atyaki yango na saki na ye, azwaki ebwakeli na ye ya mabanga mpe akendeki kobunda na engambe wana. Ntango Goliata amonaki mwa elenge yango azali koya, agangaki ete: “Yaká epai na ngai mpe nakopesa mosuni na yo epai ya ndɛkɛ.” Davidi ayebisaki ye ete: “Ngai nayeli yo na nkombo ya [Yehova].” Na nsima agangaki ete: “Nakobɛta yo.”

Davidi alandaki Goliata mbangu, azwaki libanga moko na saki na ye, atyaki yango na ebwakeli na ye, mpe abambaki Goliata na elongi. Ntango Bafilistia bamonaki ete engambe na bango akufi, babangaki makasi mpe bapalanganaki. Bayisalaele balandaki bango mpe balongaki etumba. Tosɛngi yo otánga lisolo yango mobimba elongo na libota na yo na 1 Samwele 17:12-54.

Lokola ozali elenge, okoki ntango mosusu kobanga mpo na kolanda mibeko ya Nzambe. Yilimia azalaki elenge mpe na ebandeli abangaki, kasi Nzambe ayebisaki ye ete: ‘Bangá te mpo nazali na yo.’ Yilimia akómaki na mpiko mpe asakolaki ndenge Nzambe ayebisaki ye. Soki yo mpe ozali kotyela Yehova motema lokola Davidi ná Yilimia, okobanda kobanga lisusu te.​—Yilimia 1:6-8.

^ par. 3 Soki ozali kotánga na mwana, mpe bokómi esika mwa mokɔlɔtɔ oyo ezali (—), esengeli kopema mwa moke mpe kotuna ye motuna.