Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mituna ya batángi

Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli mosusu te?

Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli mosusu te?

Moto nyonso akoki kosolola na Nzambe. Ndenge kaka tata oyo alingaka bana na ye asepelaka básolola na ye polele, Yehova Nzambe asepelaka tóbondelaka ye. Nzokande, lokola tata nyonso ya bwanya, Nzambe azali na bantina oyo ayanolaka na mabondeli mosusu te. Bantina yango eyebani te, to ayebisi biso yango na Biblia?

Ntoma Yoane alobaki boye: “Kondimisama tozali na yango na ntina etali ye, yango oyo, ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Mabondeli na biso esengeli kozala na boyokani na mokano ya Nzambe. Bato mosusu basɛngaka makambo oyo eyokani ata moke te na mokano ya Nzambe; na ndakisa, kolonga na tombola. Bato mosusu babondelaka na makanisi ya mabe. Mpo na kokebisa na makambo ya ndenge wana moyekoli Yakobo alobaki boye: “Bosɛngaka, kasi bozwaka te, mpamba te bozali kosɛnga na mokano ya mabe, mpo bóbebisa yango na bamposa makasi na bino ya bisengo ya nzoto.”​—Yakobo 4:3.

Na ndakisa, baekipi mibale bazali kobɛta lisano ya ndembo mpe bango nyonso bazali kobondela ete bálonga. Ezali mpasi tókanisa ete Nzambe akoyanola na mabondeli ya ndenge wana. Tokoki mpe koloba bongo mpo na mboka mibale oyo ezali na etumba mpe bango nyonso bazali kobondela mpo bálonga.

Mabondeli ya bato oyo baboyaka kotosa mibeko ya Nzambe ekendaka na mai. Mokolo moko, Yehova ayebisaki bato oyo bazalaki kosambela ye na bokosi ete: “Ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te, mabɔkɔ na bino etondi na makila.” (Yisaya 1:15) Biblia elobi boye: “Ye oyo akolongola litoi na ye ete ayoka mobeko te, ata libondeli na ye ekozala eloko ya koboyama.”​—Masese 28:9.

Nzokande, Yehova akokoba koyoka mabondeli ya bato oyo basalaka nyonso mpo na kosalela ye na boyokani na mokano na ye. Yango elingi nde koloba ete akopesa bango nyonso oyo bakosɛnga na mabondeli na bango? Te. Tótalela mwa bandakisa ya Biblia.

Moize azalaki na boyokani malamu na Nzambe; atako bongo, asengelaki kosɛnga “na boyokani na mokano [ya Nzambe].” Atako Nzambe alobaki ete Moize akokɔta te na mokili ya Kanana, Moize asɛngaki ete: “Nabondeli yo, Tiká nakata ngámbo mpe natala mokili malamu na ngámbo ya Yolodani.” Kasi liboso, lokola Moize asalaki lisumu, Nzambe ayebisaki ye ete akokɔta na mokili yango te. Na yango, na esika Yehova asalela Moize likambo oyo asɛngaki, ayebisaki ye ete: “Ekoki bongo! Lobelá ngai lisusu likambo na oyo te.”​—Deteronome 3:25, 26; 32:51.

Ntoma Paulo abondelaki Nzambe asunga ye na “nzubɛ” oyo azalaki na yango na kati ya mosuni. (2 Bakolinti 12:7) Mbala mosusu “nzubɛ” yango ezalaki maladi ya miso oyo ezalaki kotungisa ye mingi to mpe mitungisi ya batɛmɛli mpe “bandeko ya lokuta.” (2 Bakolinti 11:26; Bagalatia 4:14, 15) Paulo akomaki boye: “Nabondelaki Nkolo mbala misato mpo yango ekoka kolongwa epai na ngai.” Kasi, Nzambe ayebaki ete soki Paulo akobi kosakola atako azali na ‘Nzubɛ na kati ya mosuni,’ ekomonisa polele nguya ya Nzambe mpe kondima oyo Paulo azalaki na yango epai na Ye. Na yango, na esika Nzambe asalela Paulo likambo oyo asɛngaki, ayebisaki nde ye ete: “Nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.”​—2 Bakolinti 12:8, 9.

Ya solo, Nzambe ayebaka malamu koleka biso soki eyano oyo akopesa na libondeli na biso ekozala mpo na bolamu na biso to te. Yehova ayanolaka na makambo oyo ekozala mpo na bolamu na biso, na boyokani na mokano na ye oyo ezali na Biblia.