Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mituna ya batángi

Na ndenge nini Yesu ná Tata na ye bazali moko?

Na ndenge nini Yesu ná Tata na ye bazali moko?

Yesu alobaki boye: “Ngai ná Tata tozali moko.” (Yoane 10:30) Bato mosusu basalelaka vɛrsɛ yango mpo na komonisa ete Yesu ná Tata na ye bazali bapersona mibale na kati ya Bosato. Ezali yango nde Yesu alingaki komonisa ntango alobaki maloba yango?

Tótalela bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango. Na vɛrsɛ 25, Yesu alobaki ete azali kosala makambo na nkombo ya Tata na ye. Kobanda na vɛrsɛ 27 tii 29, alobelaki bampate ya elilingi oyo Tata na ye apesaki ye. Makambo wana mibale oyo Yesu alobaki elingaki mpenza kolimbola eloko te mpo na bayoki na ye soki ye ná Tata na ye bazalaki moto moko. Nzokande, Yesu alingaki nde koloba ete ‘Ngai ná Tata tozali mpenza na bomoko, yango wana moto moko te akoki kolongola bampate epai na ngai, ndenge kaka moto moko te akoki kolongola yango epai ya Tata.’ Ezali kaka lokola mwana moko azali koloba na monguna ya tata na ye ete, ‘Soki otumoli tata, otumoli ngai.’ Moto moko te akoki kokanisa ete mwana yango ná tata na ye bazali moto kaka moko. Kasi, bakomona nde ete bango mibale bazali na boyokani makasi.

Lisusu, Yesu ná Tata na ye, Yehova Nzambe, bazali “moko” mpamba te mikano, mibeko mpe ndenge na bango ya kotalelaka makambo eyokani mpenza. Na bokeseni na Satana Zabolo mpe bato ya liboso, Adama ná Eva, ata mokolo moko te Yesu alukaki kopesa Nzambe mokɔngɔ. Yesu alobaki boye: “Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi kaka oyo amonaka Tata azali kosala. Mpo makambo nyonso oyo Ye asalaka, makambo yango Mwana mpe asalaka kaka ndenge wana.”​—Yoane 5:19; 14:10; 17:8.

Atako bongo, boyokani makasi yango epekisi te kokesenisa Nzambe ná Mwana na ye, Yesu. Bazali bato mibale oyo bakeseni. Mokomoko azali na bomoto na ye. Yesu azali na mayoki na ye, makanisi na ye, makambo oyo akutaná na yango, mpe bonsomi ya kopona. Nzokande, aponaki kotosa mokano ya Tata na ye. Ndenge Luka 22:42 emonisi yango, Yesu alobaki boye: “Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” Maloba yango elingaki kozala na ntina te soki mokano na ye ekokaki te kokesana na mokano ya Tata na ye. Soki Yesu ná Tata na ye bazalaki mpenza moto moko, mpo na nini Yesu azalaki kobondela Nzambe mpe andimaki na komikitisa nyonso ete ayebaki te makambo oyo kaka Tata na ye nde ayebi?​—Matai 24:36.

Bandimi ya mangomba mingi basambelaka banzambe oyo bato bamonisaka ete baswanaka mpe babundaka na bato ya mabota na bango moko. Na ndakisa, na masapo ya Bagrɛki, balobaka ete nzambe Cronus alongaki tata na ye, Uranus, mpe alyaki bana na ye. Yango ekeseni mpenza na bomoko oyo esimbami na bolingo ya solosolo, oyo ezali kati na Yehova Nzambe ná Mwana na ye, Yesu! Bomoko na bango etindaka biso tólinga bango mingi mpenza! Ya solo, tozali na libaku kitoko mpenza ya kozala na bomoko na bato yango oyo baleki likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba. Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye ete: ‘Nazali kosɛnga ete bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso.’​—Yoane 17:20, 21.

Na yango, ntango Yesu alobaki ete, “Ngai ná Tata tozali moko,” azalaki kolobela Bosato te, liteya moko oyo ekoki kolimbolama te, kasi azalaki kolobela nde bomoko, boyokani oyo bato mibale bakoki kozala na yango.