Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makama ekozala lisusu te!

Makama ekozala lisusu te!

SOKI moto moko ayebisi yo ete: “Mosika te makama ekozala lisusu te,” okoyoka ndenge nini? Okoki koyanola, “Ozali kolɔta. Makama ezali kaka mokano ya Nzambe.” To okoki komituna boye, ‘Moto yango azali kosala na ngai masɛki?’

Ata soki emonani lokola ete makama ekozala kaka, tokoki mpenza kozala na elikya ete mbongwana ekosalema. Kasi, mbongwana yango ekoya te mpo na milende oyo bato bazali kosala. Bato bakoki koyeba te ndenge nini mpe ntina oyo makambo ezali kosalema na mokili, bakoki mpe kopekisa to kobongola yango te. Salomo, Mokonzi ya Yisraele, oyo ayebanaki mingi mpo na bwanya mpe bososoli na ye, akomaki ete: “Bato bakoki te koyeba mosala oyo esalemá na nse ya moi; ata bato bazali se kosala makasi mpenza mpo na koluka, bazali koyeba te. Mpe ata soki balobi ete bazali na bwanya mwa mingi mpo na koyeba, bakokoka te koyeba.”​—Mosakoli 8:17.

Soki bato bakoki te kopekisa makama, nani akoki kosala yango? Biblia emonisi ete kaka Mozalisi na biso nde akoki kosala yango. Ye nde abongisá biloko nyonso, na ndakisa mbula. (Mosakoli 1:7) Mpe nguya na ye eleki mosika mpenza oyo ya bato. Mpo na komonisa likambo yango, mosakoli Yirimia alobaki ete: “Aa, Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova! Talá yo nde ozalisaki likoló ná mabele na nguya na yo monene mpe na lobɔkɔ na yo oyo esembolami. Likambo nyonso wana ezali ya kokamwa mingi te mpo na yo.” (Yirimia 32:17) Lokola Nzambe nde asalá mabele mpe biloko nyonso oyo ezali na kati, kaka ye nde ayebi ndenge oyo akoki kobongisa makambo mpo bato báfanda na kimya.​—Nzembo 37:11; 115:16.

Kasi, ndenge nini Nzambe akosala mbongwana oyo tozali na yango mposa? Obosana te ete lisolo ya mibale elobaki ete makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema lelo na mabele ezali “elembo” oyo ezali komonisa “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Yesu alobaki: “Ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” (Matai 24:3; Luka 21:31) Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema na ye ya likoló, ekosala mbongwana monene awa na mabele, ata mpe kopekisa ete makama minene esalemaka. Atako Yehova azali na nguya ya kosala mbongwana yango ye moko, amoni malamu apesa mokumba yango na Mwana na Ye. Mosakoli Danyele alobaki mpo na Mwana yango ete: “Bapesaki ye boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.”​—Danyele 7:14.

Nzambe apesi Mwana na ye Yesu Kristo, nguya oyo esengeli mpenza mpo na kosala mbongwana oyo tozali na yango mposa, mpo mabele ekóma mpenza esika moko kitoko. Eleki mbula nkóto mibale, ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki mwa moke nguya oyo azali na yango ya kopekisa biloko oyo ebimisaka makama. Mokolo moko, ntango ye ná bayekoli na ye bazalaki na masuwa na Mbu ya Galile, “mopɛpɛ moko ya makasi mpe ya nsɔmɔ mpenza ebɛtaki, mpe mbonge ezalaki komibwaka na masuwa, bongo masuwa etikalaki moke etonda na mai.” Bayekoli na ye bayokaki nsɔmɔ. Lokola babangaki ete bakoki kokufa, basɛngaki Yesu lisalisi. Asalaki nini? Apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu ete: “Shiii! Fandá nyɛɛ! Mpe mopɛpɛ ekitaki mpe kimya moko monene ekɔtaki.” Bayekoli na ye bakamwaki mpe batunaki ete: “Oyo azali mpenza nani, mpo ata mopɛpɛ ná mbu etosa ye?”​—Marko 4:37-41.

Banda wana, Yesu azongá na likoló mpe Nzambe apesá ye nguya mpe bokonzi monene. Lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, azali na mokumba mpe nguya ya kobongisa makambo mpo bato báfanda na kimya awa na mabele.

Nzokande, ndenge tomoni yango, mikakatano mingi ezali kouta na bisalasala ya bato, lisusu ezali koya makasi mpo na moimi mpe lokoso ya bato. Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na baoyo bazali kokangama na banzela yango mpe bazali koboya kobongwana? Biblia emonisi Nkolo Yesu azali koya “na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” Ya solo, ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’​—2 Batesaloniki 1:7, 8; Emoniseli 11:18.

Na nsima, Yesu Kristo, “Mokonzi ya bakonzi,” akozala na nguya nyonso likoló na biloko nyonso oyo ebimisaka makama. (Emoniseli 19:16) Akosala ete bato oyo bakoyangelama na bokonzi yango, banyokwama lisusu te na likama ata ya ndenge nini. Akosalela nguya na ye mpo ete biloko lokola mbula, mopɛpɛ, mpe biloko mosusu ezala mpo na bolamu ya bato. Nyonso wana ekozala mpo na kokokisa elaka oyo Yehova Nzambe apesaki bato na ye banda kala ete: “Nakopesa mpenza bino mbula oyo ezali kosopana na ntango na yango, mpe mokili ekopesa mpenza mbuma na yango, mpe nzete ya elanga ekopesa mbuma na yango.” (Balevi 26:4) Bato bakotonga bandako kozanga kobanga ete ekoki kobeba na likama moko boye; Biblia elobi ete: “Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.”​—Yisaya 65:21.

Osengeli kosala nini?

Na ntembe te, yo mpe osepeli na likanisi ya kozala na mokili oyo makama ekozala te. Kasi, osengeli kosala nini mpo ofanda na mokili yango? Lokola Nzambe alobi ete “baoyo bayebi” Ye te mpe “baoyo bazali kotosa te nsango malamu” bakokɔta te na mokili yango, emonani polele ete esengeli moto nyonso ayekola uta sikoyo makambo ya Nzambe mpe apesa mabɔkɔ na boyangeli oyo atye mpo na mabele. Nzambe azali kosɛnga ete tóyeba ye mpe tótosa nsango malamu ya Bokonzi oyo apesi Mwana na Ye.

Lolenge eleki malamu ya koyekola kosala yango, ezali ya koyekola Biblia malamumalamu. Biblia eyebisi makambo oyo moto akoki kosala mpo azala na mokili ya kimya oyo ekotambwisama na Bokonzi ya Nzambe. Mpo na nini te kosɛnga Batatoli ya Yehova básalisa yo oyekola oyo Biblia eteyaka? Soki osɛngi bango, bakosalisa yo mpo okokisa mokano yango. Likambo ya solo yango oyo: soki osali molende mpo na koyeba Nzambe mpe otosi nsango malamu, maloba oyo ya Masese 1:33, ekokokisama epai na yo: “Moto oyo azali koyokela ngai, akofanda na kimya mpe akotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.”