Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pusaná penepene na Nzambe

“Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?”

“Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?”

YEHOVA azali kosɛnga nini epai ya baoyo balingi kosambela ye na ndenge oyo ebongi? Mpo na kosepelisa ye, asɛngaka nde ete tósala makambo na ndenge ya kokoka nzokande kosala bongo ezali mpasi mpo na biso bato ya kozanga kokoka? To asɛngaka nde biso makambo oyo tokokoka te? Biyano na mituna yango ezali na ntina soki tolingi kozala na esengo na mosala ya Nzambe. Tótalela naino ndenge mosakoli Mika alobelaki na mokuse makambo oyo Nzambe asɛngaka.​—Tángá Mika 6:8.

“Ye ayebisi yo oyo ezali malamu.” Ntina ya kokanisa biso moko oyo Nzambe azali kosɛnga biso ezali te. Ayebisi polele makambo oyo azali kosɛnga biso na Biblia. Makambo oyo Nzambe asɛngaka biso “ezali malamu.” Ezali mpenza bongo. “Nzambe azali bolingo,” na yango, alukaka mpenza bolamu na biso. (1 Yoane 4:8; 5:3) Kotosa makambo oyo asɛngi biso esepelisaka ye mpe ezali mpo na bolamu na biso.​—Kolimbola Mibeko 10:12, 13.

“Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?” Nzambe azali nde na lotomo ya kosɛnga biso eloko? Ɛɛ! Tosengeli kotosa ye mpo Ye nde apesá biso bomoi mpe abatelaka yango. (Nzembo 36:9) Kasi, eloko nini azali kosɛnga biso? Mika alobeli na mokuse makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso na bafraze misato. Masɛngami mibale ya liboso etaleli ndenge oyo tosalelaka basusu makambo, mpe ya misato etaleli boyokani na biso ná Nzambe.

“Komonisa bosembo.” Buku moko elobi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na “bosembo, esangisi lotomo mpe boyokani malamu na kati ya bato.” Nzambe asɛngaka ete tósalela basusu makambo na kolanda oyo ezali sembo mpe malamu ndenge mibeko na ye esɛngi. Tomonisaka bosembo ntango tozali kopona bilongi te mpe tozali kosalela basusu makambo na bosembo. (Balevi 19:15; Yisaya 1:17; Baebre 13:18) Soki tozali kosalela basusu makambo na bosembo, ekotinda bango mpe básalela biso bongo.​—Matai 7:12.

“Kolinga boboto.” Nzambe asɛngi biso kaka te tómonisa boboto, kasi nde tólinga yango. Liloba ya Ebre (ḥèsèdh), oyo ebongolami na “boboto” ekoki mpe kobongolama na “kolinga boboto” to “bolingo ya sembo.” Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi boye: “Bolingo, motema mawa, mpe boboto ezali lolenge oyo ebongi te ya kobongola liloba [hèsèdh]; mpamba te liloba yango esangisi nde makambo yango nyonso misato.” Soki tolingaka boboto, tokomonisa yango na motema mobimba, tokosepela kosalisa baoyo bazali na bosɛnga. Yango ekopesa biso esengo oyo eutaka na kopesa.​—Misala 20:35.

“Kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo.” Na Biblia, liloba “kotambola” elimboli “kolanda ndenge likambo moko ezali kokende.” Tokotambola ná Nzambe soki tozali kotambwisa bomoi na biso na kolanda oyo Biblia ezali kosɛnga. Tosengeli “kotambola na bopɔlɔ” soki tolingi kolanda nzela ya ndenge wana. Ndenge nini? Soki tozali na bopɔlɔ liboso ya Nzambe, tokotalela esika na biso liboso na ye na ndenge ebongi mpe tokoyeba esika oyo makoki na biso esuki. Na yango, “kotambola na bopɔlɔ” elimboli kotalela na ndenge oyo ebongi makambo oyo azali kosɛnga biso mpe oyo tokoki kopesa ye.

Likambo ya esengo ezali ete Yehova asɛngaka biso te oyo eleki makoki na biso. Asepelaka na milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye. (Bakolose 3:23) Ayebaka esika makoki na biso esuki. (Nzembo 103:14) Soki tondimi na komikitisa nyonso makambo oyo asɛngi biso, tokozala na esengo ya kotambola elongo na Nzambe. Mpo na nini te koyekola ndenge oyo okoki kobanda kotambola elongo na Nzambe? Apambolaka mpenza baoyo basalaka bongo.​—Masese 10:22.

Botángi ya Biblia mpo na Novɛmbɛ:

Yoele 1-3Mika 1-7