Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okotyela Nzambe motema?

Okotyela Nzambe motema?

KANISÁ ete ozali na moninga moko oyo olingaka mingi, kasi oyoki ete asali likambo moko oyo ozali kokanga ntina na yango te. Bato mosusu bazali kotyola likambo yango mpe bazali kokanisela ye mabe, bazali koloba ete moninga na yo azali mabe mpenza. Okondima mbala moko makambo oyo balobi, to okozela oyoka oyo moninga na yo akoloba? Soki azali wana te mpo na kolimbolela yo, okomonisa motema molai, mpe okoboya kosambisa ye mbala moko, boye te?

Liboso oyeba oyo okosala, mbala mosusu okolinga koyeba makambo mosusu. Okoki komituna boye: ‘Nayebi mpenza moninga wana malamu, mpe makambo nini etindaka ngai nalinga ye?’ Komituna ndenge wana ezali mabe te. Kasi, kanisá naino: Tokoki te kosala bongo mpo na koyeba soki Nzambe azali motema mabe to te?

Ekoki kozala mpasi okanga ntina ya makambo mosusu oyo Nzambe asalá, to mpe okoki kokamwa ndenge atiká makambo mosusu esalema. Bato mingi bakoki koyebisa yo ete Nzambe azali motema mabe mpe bakoki kotinda yo okanisela ye mabe lokola bango. Okotyela nde Nzambe motema tii ntango okoyeba makambo mingi oyo etali ye? Eyano na motuna yango ekotalela ndenge oyo oyebi Nzambe. Omituna boye: ‘Makambo nini ya malamu Nzambe asalelá ngai?’

Soki okutaná na mikakatano mingi na bomoi na yo, okoki koloba ete Nzambe atikalá kozala moninga na yo te. Kasi kanisá naino mwa moke. Bampasi oyo okutaná na yango, Nzambe nde abimiselaki yo yango to ye nde moto apesaka yo biloko ya malamu? Ndenge tomonaki yango, Satana azali “mokonzi ya mokili oyo,” kasi Yehova te. (Yoane 12:31) Na yango, bampasi mingi oyo ezali na mokili mpe makambo ya kozanga bosembo eutaka nde na Satana. Osengeli mpe koyeba ete bampasi mingi oyo tokutanaka na yango eutaka na nzoto na biso ya kozanga kokoka mpe na makambo oyo ekanami te.

Bampasi oyo okutaná na yango, Nzambe nde abimiselaki yo yango to ye nde moto apesaka yo biloko ya malamu?

Kasi makambo nini Nzambe asalá? Tótala naino: Biblia elobi ete Nzambe azali “Mokeli ya likoló ná mabele”; ete nzoto na biso mpe ezali moko ya misala na ye oyo ‘esalamá na ndenge moko ya kokamwa’; elobi lisusu ete Yehova azali ‘Nzambe oyo mpema na biso ezali na lobɔkɔ na ye.’ (Nzembo 124:8; 139:14; Danyele 5:23) Nyonso wana elimboli nini?

Elingi koloba ete mpema mpe bomoi na biso eutá mpenza epai ya Mozalisi na biso. (Misala 17:28) Elimboli ete likabo ya bomoi, biloko kitoko oyo ezali na mokili, esengo ya kolinga mpe boninga, koyoka elɛngi ya biloko, kosimba, koyoka mpe kolumbuta nsolo; nyonso wana ezali makabo ya Nzambe. (Yakobo 1:17) Mapamboli oyo nyonso emonisi te ete azali moninga oyo tosengeli komemya mpe kotyela motema?

Toboyi te, mbala mosusu ekoki kozala mpasi otyela Nzambe motema. Ntango mosusu omonaka ete oyebi ye naino malamu te mpo otyela ye motema. Mpe yango ezali mabe te. Na mwa masolo oyo, tokoki te kolobela makambo nyonso oyo etindaka bato mosusu bámona ete Nzambe azali mabe. Kasi, omoni te ete ebongi mpenza kosala milende mpo na koyeba Nzambe malamumalamu? * Tondimi mpenza ete soki osali bongo, okoyeba solo na ntina na Nzambe. Nzambe azali motema mabe? Te, kutu: “Nzambe azali bolingo.”​—1 Yoane 4:8.

^ par. 8 Na ndakisa, talá makambo mosusu oyo esali ete Nzambe atika mabe ezala, na mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.