Lakisá makambo oyo ezali na kati

Fɔtɔ bakangaki liboso maladi mabe ya coronavirus ebanda, Cynthia (na lobɔkɔ ya mwasi), mobange oyo azali baba mpe akufá miso, azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te, azali kosimba misapi ya ndeko mwasi moko mpo na kosalisa ye bajɛstɛ mpo na kosolola na ye

12/05/2020
PHILIPPINES

Bandeko ya lisangá basalisi ndeko mwasi moko ya baba mpe akufá miso

Bandeko ya lisangá basalisi ndeko mwasi moko ya baba mpe akufá miso

Ndeko Cynthia Pablo oyo azali na mbula 64, azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te ayanganaka na lisangá ya elobeli ya bababa ya Panghulo na Philippines. Azali baba, akufá miso mpe azali mobola. Afandaka ná bandeko na ye oyo bazali Batatoli ya Yehova te na etúká oyo bato bazalaka mingi na Valenzuela. Atako Cynthia azali kolekisa ntango moko ya mpasi mpe maladi mabe oyo ekómisi bomoi na ye lisusu mpasi makasi, bandeko ya lisangá bazali kosalisa ye.

Ndeko Ilumin asalelaka tukutuku na ye mpo na komemela ndeko Cynthia bilamba ya pɛto mpe biloko oyo azali na yango mposa

Na kotalela mbula ya Cynthia, ezali mpasi te mpo azwa mbala moko maladi ya coronavirus. Maladi mabe oyo esali ete mai ekóma mpasi na esika afandaka, yango ekómi mpasi mpo asukola bilamba. Liboso coronavirus ezala, bandeko ya lisangá bazalaki kokende kosalisa ndeko Cynthia, kasi kobanda bakonzi ya leta batye bipekiseli mpo na maladi mabe oyo, ekómi mpasi mpo bandeko bákende kosalisa ye.

Ndeko Walter Ilumin, nkulutu ya lisangá na ye, azwaki ndingisa epai ya bakonzi ya mboka ete akoki kokende kosalisa ndeko Cynthia na ndako na ye. Ndingisa yango epesamaki kaka mpo na mosala moko ya ntina. Ndeko Walter asukolaka bilamba na ye mpe amemelaka ye bilei mpe biloko oyo azali na yango mposa. Ndeko Walter atosaka mibeko nyonso oyo bakonzi ya Leta batye, elingi koloba, kolata maskɛ, bilamba oyo esengeli mpo na komibatela mpe kosokola mabɔkɔ mbala na mbala.

Cynthia asalaki mwa video ya mokuse mpo na kopesa bandeko matɔndi. Na nsima ndeko Ilumin alakisaki bandeko ya lisangá video yango.

Cynthia azali na mosala ya kosakola liboso maladi mabe ebanda

Nkulutu yango akendaki na ndako na ye mpo na kobongola makita oyo bazalaki kosala na nzela ya video na elobeli ya bababa mpe asimbaka mabɔkɔ na ye mpo na kosalisa ye bajɛstɛ ntango makita ezali kosalema. Yango wana, Cynthia azali na likoki ya kopesa biyano mbala na mbala na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá. Komona ndenge ndeko Cynthia azali koyangana na makita ya lisangá atako na eloko oyo ya mpasi, ezali kolendisa bandeko mosusu oyo bazali kolanda makita na video.

Tozali na elikya ete Yehova azali kosepela komona ndenge bato na ye bazali kosalisana “awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.”​—Baebre 10:24, 25.