Lakisá makambo oyo ezali na kati

02/01/2020
PHILIPPINES

Mopɛpɛ makasi oyo babengi Phanfone ebɛti ekólo Philippines

Mopɛpɛ makasi oyo babengi Phanfone ebɛti ekólo Philippines

Mopɛpɛ makasi oyo babengi Phanfone oyo eyebani mpe oyo babengi Ursula, ebukaki mabele na mokolo ya 24/12/2019, na ɛsti ya etúká ya Samar. Ata motatoli ya Yehova moko te akufaki to azokaki. Kasi, bandako 464 ya Batatoli ya Yehova ebukanaki, ezala mpe Bandako ya Bokonzi 6. Bandeko ya komite ya filiale ya Philippines batyaki komite moko ya kopesa lisungi mpo na kosunga na elimo mpe na mosuni bandeko oyo bafandaka na bituluku ya bisanga oyo mopɛpɛ yango ebɛtaki.

Mopɛpɛ makasi oyo babengi Phanfone ezalaki mopɛpɛ ya mbala 21 oyo ebɛtaki Philippines na 2019. Longola yango, koningana ya mabele eutaki kosalema na eteni ya sudi ya ekólo yango. Mpo na yango, bakomite 18 ya kopesa lisungi oyo etyamaki ezali kokoba kosala mpo na kopesa bandeko lisungi.

Komona ndenge bandeko na biso na Philippines bazali kokoba koyika mpiko mpe bazali kotya motema epai ya Yehova, ye oyo azali na “bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa” ezali kolendisa biso.​—Yakobo 5:11.