Lakisá makambo oyo ezali na kati

Na lobɔkɔ ya mwasi: Ndako ya Bokonzi oyo mopɛpɛ makasi ebebisaki. Na lobɔkɔ ya mobali: Karte oyo ezali komonisa esika oyo mopɛpɛ makasi ebɛtaki

28/05/2020
PHILIPPINES

Na Philippines, eleko ya mopɛpɛ makasi ebandi na mopɛpɛ makasi babengi Vongfong oyo ebebisi biloko

Na Philippines, eleko ya mopɛpɛ makasi ebandi na mopɛpɛ makasi babengi Vongfong oyo ebebisi biloko

Mopɛpɛ makasi babengi Vongfong (oyo eyebani na nkombo Ambo) ebɛtaki na esanga ya Samar na mokolo ya 14/05/2020. Lolenge wana ya mipɛpɛ makasi ekómi na dɛgrɛ ya misato: ya liboso, mopɛpɛ makasi ya 2020 na wɛsti ya Océan Pacifique, ebɛtaki na Samar na kilomɛtrɛ 185 na boumeli ya ngonga moko. Bato mingi babimaki kuna, mpe ezalaki mpasi mpenza koleka ndenge emesaná kosalema mpo guvɛrnema elobaki ete bato bázala mosika mpenza.

Ata ndeko moko te azokaki na likama yango, bato 59 basengelaki kotika bandako na bango. Bandeko bakendaki kofanda na biteyelo, to na bandako ya bandeko. Longola yango, bandako ya bandeko na biso 82 ebukanaki to ebebaki mpenza makasi. Bandako ya Bokonzi mitano mpe ebebaki, mpe moko ebukanaki mpenza. Komite ya filiale ya Philippines esalaki komite mibale ya kopesa lisungi mpe epesaki bandeko ya komite yango formasyo mpo na kosalisa na elimo mpe na mosuni bandeko oyo bakutanaki na likama.

Tozali kokoba kobondela mpo na bandeko na biso na Philippines, oyo bazali koyika mpiko na makama ya mopɛpɛ makasi mpe ya maladi mabe oyo ezali konyokola bato na mokili mobimba. Tozali kotya motema ete Yehova, ‘Libanga na biso ya libela na libela,’ akokoba kokokisa bamposa na bango.​—Yisaya 26:4.