Lakisá makambo oyo ezali na kati

20/01/2020
PHILIPPINES

Na Philippines ngomba moko ebimisi milinga mpe elingi kosanza mɔtɔ

Na Philippines ngomba moko ebimisi milinga mpe elingi kosanza mɔtɔ

Na mokolo ya 12/01/2020, ngomba babengi Taal oyo ezalaka na Batangas na ekolo Philippines, ebimisaki milinga na likoló kilomɛtrɛ soki 14, bakonzi ya leta bakebisaki bato ete ekokaki “kosanza moto.” Lisusu, Bakonzi ya leta basɛngaki na bankóto ya bato oyo bafandaka pene ya ngomba yango balongwa wana mpo esanzaka mɔtɔ mbala mingi.

Lelo oyo, bandeko koleka 500 balongwaki pene ya ngomba yango mpe bazali kofanda na bisika oyo likama ezali te. Na ndakisa bandeko bazali kofanda na bandako ya Bokonzi mpe na bandako ya batatoli mosusu. Ata ndeko moko te azwaki likama to azokaki. Bandeko ya Komite ya filiale batyaki komite moko ya kosunga mpo na kosalisa bandeko wana oyo batikaki bandako na bango bazanga eloko te.

Tozali kobondela mpo na bandeko na biso ya Philippines ete bákoba kotyela Yehova motema mpo “azali ekimelo mpe bokasi na biso.”​—Nzembo 46:1-3.