Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Miliki ya mabɛlɛ ya mama

Miliki ya mabɛlɛ ya mama

 Buku moko ya minganga oyo babotisaka elobi, “Miliki ya bana oyo batekaka na babutiki ekokani ata moke te na miliki oyo eutaka na mabɛlɛ ya mama.” Moko ya bantina oyo esalaka ete miliki ya mabɛlɛ ya mama eleka oyo bato basali kosala ezali ete miliki yango ebongwanaka na kolanda mposa ya mwana.

 Tókanisa naino: Miliki ya mabɛlɛ ya mama ebongwanaka na boumeli ya ntango oyo azali komɛlisa mwana. Miliki oyo ebimaka na ebandeli ntango abandi komɛlisa mwana ezalaka na baproteini mingi, bavitamini mingi, mai mpe biloko mosusu, nzokande, oyo ebimaka na nsuka ezalaka na mafuta oyo etondisaka mwana. Miliki ya mama ebongwanaka mpe na kolandela bileko mpe kokola ya mwana.

 Na kati ya miliki ya mama, bahormone mosusu lokola melatonine, ekómaka mingi na butu, nzokande bahormone mosusu ekómaka mingi nde na moi. Kokita to komata ya bahormone yango nde esalaka ete mwana azwa momeseno ya kolala to ya kolamuka na bantango ekeseni, ezala na butu to na moi.

 Mwa mikolo nsima ya kobota, mabɛlɛ ya mama ebimisaka miliki oyo ezali na langi ya mosaka (jaune) oyo babengaka colostrum. Colostrum ekɔtaka na pɛtɛɛ nyonso na biteni ya nzoto mpe ezalaka na biloko mingi oyo etongaka, ata soki ekɔti kaka mwa moke na estoma ya mwana, yango ekoki kosalisa ye mingi mpenza. Colostrum ezali na biloko mingi oyo ebatelaka nzoto mpe ekoki kobatela mwana na bamikrobe misusu. Longola yango, esalisaka mwana asumba malamu mpe esukolaka misɔpɔ ya mwana.

 Ata soki aboti bana mapasa, mama asengeli te komitungisa mpo na miliki, mpo mabɛlɛ na ye ebimisaka miliki yango moko na kotalela mposa ya bana.

 Okanisi nini? Miliki ya mabɛlɛ ya mama, mpe ndenge esalemá malamu mpenza, ebimá kaka yango moko? To basalaki yango kosala?