Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamilio ya mwa babuku Omipesa na kotánga mpe kokoma oyo esalisaka mpo na koyekola kotánga mpe kokoma, ebimaki na minɔkɔ koleka 100

Koyekola Biblia elendisaka moto ayeba kotánga mpe kokoma

Koyekola Biblia elendisaka moto ayeba kotánga mpe kokoma

“Moto nyonso azali na lotomo ya koyeba kotánga mpe kokoma, mpo esalaka ete moto akóma na mwa valɛrɛ mpe esalaka ete ekólo ekende liboso.”​—UNESCO. *

BAANKƐTƐ emonisi ete na mokili mobimba bato koleka milio 700 ya mbula 15 mpe koleka bayebi kotánga mpe kokoma te. Yango esali ete bázala na likoki te ya koyeba makambo mingi na mokili; ezala mpe bizaleli malamu mpe mateya ya Nzambe oyo ‘ekomamaki na Biblia mpo eteya biso.’ (Baroma 15:4) Yango wana, na mikili mingi, Batatoli ya Yehova bakɔtisá koyekola kotánga mpe kokoma na programɛ na bango ya koteya bato Biblia mpe boyekoli yango ezalaka ofele. Programɛ yango elongaki?

Tótalela mosala ya Batatoli ya Yehova na Mexique, mboka oyo balobaka mingimingi monɔkɔ ya Espagnol. Kobanda 1946, Batatoli ya Yehova basalisaki bato 152 000 báyeba kotánga mpe kokoma, mingi na bango bakómaki mpe balakisi. Mpo na komonisa botɔndi na mosala oyo Batatoli ya Yehova basalaki, guvɛrnema etindelaki bango mikanda ebele. Mokanda moko elobaki ete: “Toyebi valɛrɛ ya mateya oyo bozali kopesa mpe tozali kopesa bino matɔndi mpo bozali kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa mikóló báyeba kotánga mpe kokoma.”

Bilenge mpe mibange bazwelaki programɛ yango litomba. Na ndakisa, Josefina azalaki na mbula 101 ntango akɔtaki kelasi yango mpe nsima ya mbula mibale ayebaki kotánga mpe kokoma!

Atako bato ya Mexique balobaka mingimingi monɔkɔ ya Espagnol, kasi kelasi ya kotánga mpe kokoma ezalaki kosalema kaka na monɔkɔ yango te. Na 2013, na lisalisi ya programɛ wana, basalisaki bituluku mwambe ya bato ya mboka yango oyo balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge báyekola kotánga mpe kokoma na monɔkɔ oyo balobaka.

Koyeba kotánga mpe kokoma esalisaka moto ayekola makambo mingi ya sika. Kasi oyo eleki nyonso, koyeba kotánga mpe kokoma esalisaka bato ya lolenge nyonso bátánga Biblia; buku oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe oyo ekoki kolongola bato na boombo ya biyambayamba, mateya ya mangomba ya lokuta mpe bizaleli mabe.​—Yoane 8:32.

^ par. 2 (Ebongiseli ya ONU mpo na koteya, siansi, mpe makambo ya ntɔki).