Lakisá makambo oyo ezali na kati

ÉRYTHRÉE

Bakangami mpo na kondima na bango

Bakangami mpo na kondima na bango

Érythrée ezali kokanga Batatoli ya Yehova mpe kotya bango na bolɔkɔ kozanga bifundeli mpe kozanga kosambisa bango. Mibali ná basi oyo bazali Batatoli ya Yehova, ata mpe bana mpe mibange, bazali kokɔta bolɔkɔ mpo basali makambo na bango ya losambo to mpe mpo na bantina oyo eyebani te. Bilenge mibali bazali kokɔta bolɔkɔ mpo baboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Érythrée ezwaki lipanda na 1993; kobanda ntango yango, Batatoli ya Yehova bazalaka lisusu na bonsomi te. Na mobeko oyo prezida na bango Afewerki abimisaki na dati ya 25/10/1994, elongolaki Batatoli ya Yehova bonsomi mpo basalaki voti te 1993 ntango ekólo yango esɛngaki lipanda mpe mpo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Kobanda wana, basoda ya mboka yango bazali kokanga, kobɛta mpe kotungisa Batatoli ya Yehova mpo na kotinda bango na makasi ete báwangana kondima na bango.

Batatoli ya Yehova bakufi na bolɔkɔ mpo na minyoko ya makasi

Na Érythrée, Batatoli ya Yehova minei mobimba bakufaki na bolɔkɔ. Mibale bakufaki na 2018, nsima ya kotinda bango na bolɔkɔ ya Mai Serwa. Habtemichael Tesfamariam akufaki na mbula 76 na mokolo ya 03/01/2018 mpe Habtemichael Mekonen akufaki na mbula 77 na mokolo ya 06/03/2018. Bakonzi ya Érythrée bakangaki mibali yango mibale banda 2008 kozanga bifundeli.

Misghina Gebretinsae, akufaki na sanza ya 07/2011 na mbula 62, mpo molunge makasi oyo ezalaki na esika batyaki ye mpo na kopesa ye etumbu na bolɔkɔ ya Mitire oyo balobaka ete ezali bolɔkɔ ya “nse ya mabele.” Na mokolo ya 16/08/2012, kaka na bolɔkɔ yango, Yohannes Haile, oyo azalaki na mbula 68, akufaki nsima ya kosala mbula pene na minei. Batatoli ya Yehova misato ya mibange bakufaki nsima ya kobima na bolɔkɔ mpo na mpasi makasi oyo bamonisaki bango na bolɔkɔ yango.

Bitumbu ya bolɔkɔ oyo mokolo ya kobima eyebani te

Mibali misato, Paulos Eyasu, Isaac Mogos, mpe Negede Teklemariam, bakɔtá bolɔkɔ banda sanza ya 09/1994 mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Mibali mosusu zomi basali mpe mbula koleka zomi na bolɔkɔ.

Batatoli ya Yehova mosusu batyaki bango na kati ya ba kontɛnɛrɛ, bamosusu na kati ya eloko moko oyo ezali lokola libanga to linzanza, oyo ndambo na yango ekundamá na mabele.

Na sanza ya 07/2017, Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazalaki na bolɔkɔ ya Mitire bamemaki bango na bolɔkɔ ya Mai Serwa, oyo ezali pene ya Asmara. Mokolo ya 30/11/2017, Batatoli ya Yehova 13 oyo bazalaki na bolɔkɔ ya Sawa, na kati na bango Paulos Eyasu, Isaac Mogos, ná Negede Teklemariam, bamemaki bango mpe na bolɔkɔ ya Mai Serwa.

Mibali Batatoli ya Yehova oyo bazali na bolɔkɔ batye bango kuna mpo na ntango oyo ezangi ndelo, kozanga elikya ya kobima kuna. Bakotikala na bolɔkɔ tii ntango bakokufa to bakokóma mpenza mibange. Lokola bakoki te kosɛnga bátalela likambo na bango lisusu mpe ndenge ya kosamba ezali te, ezali lokola bakosala bolɔkɔ bomoi mobimba.

Badati

  1. 17/05/2019

    Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazali na bolɔkɔ bazali 52.

  2. 06/03/2018

    Liwa ya Habtemichael Mekonen, na mbula 77, nsima ya kotinda ye na bolɔkɔ ya Mai Serwa.

  3. 03/01/2018

    Liwa ya Habtemichael Tesfamariam, na mbula 76, nsima ya kotinda ye na bolɔkɔ ya Mai Serwa.

  4. Sanza ya 07/2017

    Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazalaki na bolɔkɔ ya Mitire bamemaki bango na bolɔkɔ ya Mai Serwa, oyo ezali pene ya Asmara.

  5. 25/07/2014

    Mingi ya Batatoli ya Yehova oyo bakangaki bango na mokolo ya 14/04/2014 babimisaki bango, kasi Batatoli ya Yehova 20 oyo bakangaki bango na mokolo ya 27/04/2014 babimisi bango naino te.

  6. 27/04/2014

    Bakangi Batatoli ya Yehova 31 ntango bazalaki kosala likita ya boyekoli ya Biblia.

  7. 14/04/2014

    Bakangi Batatoli ya Yehova koleka 90 ntango bazalaki kosala Ekaniseli ya liwa ya Kristo.

  8. 16/08/2012

    Liwa ya Yohannes Haile, na mbula 68, ntango azalaki na bolɔkɔ ya mabe mpenza.

  9. Sanza ya 07/2011

    Liwa ya Misghina Gebretinsae, na mbula 62, ntango azalaki na bolɔkɔ ya mabe mpenza.

  10. 28/06/2009

    Bakonzi bakɔti na ndako moko oyo Batatoli ya Yehova bayangani mpo na losambo mpe bakangi Batatoli ya Yehova 23 oyo bazali wana, kobanda mbula 2 tii na mbula 80.

  11. 28/04/2009

    Bakonzi batindaki Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazalaki na biro ya bapolisi na bolɔkɔ ya Mitire, longola kaka Motatoli ya Yehova moko.

  12. 08/07/2008

    Bakonzi babandi kokɔta na bandako ya Batatoli ya Yehova mpe na bisika ya mosala mpe bakangi Batatoli ya Yehova 24, oyo mingi na bango nde baleisaka mabota na bango.

  13. Sanza ya 05/2002

    Guvɛrnema epekisi mangomba nyonso oyo ezali te na kati ya mangomba minei oyo endimami na Leta.

  14. 25/10/1994

    Mobeko oyo Prezida abimisi elongoli Batatoli ya Yehova lotomo ya kozala bana-mboka mpe ntomo oyo basivile bazalaka na yango.

  15. 24/09/1994

    Paulos Eyasu, Isaac Mogos, ná Negede Teklemariam batye bango na bolɔkɔ kozanga efundeli to kosambisa bango mpe tii sikoyo bazali kaka na bolɔkɔ.

  16. Bambula ya 1940

    Etuluku ya liboso ya Batatoli ya Yehova esalemi na Erythrée.