Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobongisa avenire na Yehova

Kobongisa avenire na Yehova

Zwá:

  1. 1. Nakoki te komona to mpe koyeba ya n’avenire

    Nakozala ndenge nini to nalanda nzela nini.

    Kasi, nayebi: eya butu, eya moi,

    Naza’ ya Yehova, naza’ mwana n’e.

    (MONDIMO)

    Bomɛngo to baninga nyonso nakoki’ozwa,

    Kasi’oy’eleki mpe ekosunga nga’,

    Kopona nzel’ekopesa Yehova esengo.

    Apesi ngai nyonso; nabosani’ango te.

    Na mabɔkɔ n’e, nazali na kimya.

    Nabongis’avenire na nga’ na mateya na ye.

  2. 2. Ata motema m’elingi kolanda oyo miso’emoni,

    Kasi eza’ nzel’ememi n’esik’oy’ebongi na nga’ te.

    Nabosaná te ndai oyo nalapá,

    Epesaka nga’ kondima ná mpiko.

    (MONDIMO)

    Bomɛngo to baninga nyonso nakoki’ozwa,

    Kasi’oy’eleki mpe ekosunga nga’,

    Kopona nzel’ekopesa Yehova esengo.

    Apesi ngai nyonso; nabosani’ango te.

    Na mabɔkɔ n’e, nazali na kimya.

    Nabongis’avenire na nga’ na mateya na ye.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Naza’ kolɛngɛla bomoi’a seko

    Elongo na Nzambe, ye Moning’a solo.

    Esengo ya solo, bomoi’a kimya,

    Soki’oyoki Yehova mikolo nyonso.

    (MONDIMO)

    Bomɛngo to baninga nyonso nakoki’ozwa,

    Kasi’oy’eleki mpe ekosunga nga’,

    Kopona nzel’ekopesa Yehova esengo.

    Apesi ngai nyonso; nabosani’ango te.

    Na mabɔkɔ n’e, nazali na kimya.

    Nabongis’avenire na nga’ na mateya na ye.

    Nabongis’avenire na nga’ na mateya na ye.