Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koyekola epesaka mpiko

Koyekola epesaka mpiko

Zwá:

  1. 1. Namesani kotánga buku yango.

    Banda bomwana nayebi masolo n’ango.

    Mpo nalala, pap’akotángela nga.

    Tii lel’oyo natikaka buku yango te.

    Ntango nafandi nga moko nazwaka buku’ango.

    Mpo nayebi oyo Biblia elobi mpo nazala na mpiko.

    (MONDIMO)

    Naza na mpiko,

    Lokola nzete pembeni ya ebale.

    Naza na mpiko.

    Nkasa na nga mobesu, ngai nalongi.

    Naza na mpiko,

    Napiki misisa na nga makasi.

    Naza na mpiko.

    Naza kokola, nzela na nga namoni.

  2. 2. Soki nazwi libaku, nakoloba?

    Soki baninga ya kelasi batuni nga?

    Makambo’ango ekomami polele.

    Nabanga te mpo nayebi banda bomwana.

    Ntango nafandi nga moko nazwaka buku’ango.

    Mpo nayebi oyo Biblia elobi mpo nazala na mpiko.

    (MONDIMO)

    Naza na mpiko,

    Lokola nzete pembeni ya ebale.

    Naza na mpiko.

    Nkasa na nga mobesu, ngai nalongi.

    Naza na mpiko,

    Napiki misisa na nga makasi.

    Naza na mpiko.

    Naza kokola, nzela na nga namoni.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Nyonso esalisi nga,

    Ekoki mpe kobonga

    Mpo na kosalisa mpe kolendisa moto nyonso.

    (MONDIMO)

    Naza na mpiko.

    Naza na mpiko.

    Naza na mpiko.

    Naza na mpiko.

    Naza na mpiko,

    Lokola nzete pembeni ya ebale.

    Naza na mpiko.

    Nkasa na nga mobesu, ngai nalongi.

    Naza na mpiko,

    Napiki misisa na nga makasi.

    Naza na mpiko.

    Naza kokola, nzela na nga namoni.