Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Misala na yo ya kokamwa etindi ngai nayemba

Misala na yo ya kokamwa etindi ngai nayemba

Zwá:

  1. 1. Bandɛkɛ baz’oyemba, ntɔngo’etani.

    Minzoto’ekei, moi ebimi, mokili’engɛngi.

    Pol’eyei, ebengani molili,

    Mwa mopɛpɛ kitoko eza kopɛpa.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Nayembeli yo: “Yehova Nzambe,

    Misala na yo, naz’okamwa.” Nga namituni:

    Nini’ebendi yo’epa na biso?

    (MONDIMO)

    Natali zamba, nga nabangi yo.

    Natali mai, nga nabangi yo.

    Nabangi yo.

  2. 2. Mitindo nyonso ya nyam’a zamba;

    Butu na moi, nsuka te se koyembela yo.

    Banda likolo’a ngomba tii n’ebale,

    Nyonso’eza na mpema ekumisa yo.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Nayembeli yo: “Yehova Nzambe,

    Misala na yo, naz’okamwa.” Nga namituni:

    Nini’ebendi yo’epa na biso?

    (MONDIMO)

    Natali zamba, nga nabangi yo.

    Natali mai, nga nabangi yo.

    Nabangi yo.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Tókanga miso mpe tókanisa,

    Wana tomoni malamu Oyo’akelá biso.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Nayembeli yo: “Yehova Nzambe,

    Misala na yo, naz’okamwa.” Nga namituni:

    Nini’ebendi yo’epa na biso?

    (MONDIMO)

    Natali mai, nga nabangi yo.

    Natali zamba, nga nabangi yo.

    Namoni moi, mpe nga, nabangi yo.

    Likoló ná nse, mpe nga, nabangi yo.

    Misala nyonso, mpe nga, nabangi yo.

    Nabangi yo.