Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esika oyo ekokumisa yo

Esika oyo ekokumisa yo

Zwá:

  1. 1. Yehova, okelá likoló,

    Yango kutu’ekoki yo te,

    Bongo ndak’oyo awa na nse!

    Elimo n’o ezal’awa.

    Kitoko y’esik’oyo’eza nde

    Bat’oyo balingi pole.

    Toz’osalela yo elongo;

    Yango’ez’osepelisa yo.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Nyonso toza n’ango

    Euti epai na yo.

    Na lobɔkɔ n’o tozwi

    Oyo topesi yo.

    (MONDIMO)

    Topesi mersi mpo na nyonso;

    Tozali koyembela yo.

    Y’okokisi mposa na biso

    Y’esik’ekokumisa yo.

  2. 2. Yehov’oyebaki tolingi

    Esik’ekokumisa yo,

    Ekosalisa baombo n’o

    Báteya Liloba na yo.

    Mokano na yo’esalem’awa.

    Mosal’esili naino te,

    Tókoba kokende liboso

    Na mosal’a Mwana na yo.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Toyei kopesa yo

    Oy’eleki malamu.

    Yo nd’obongi na yango,

    Mpo Mopesi’eza yo.

    (MONDIMO)

    Topesi mersi mpo na nyonso;

    Tozali koyembela yo.

    Y’okokisi mposa na biso

    Y’esik’ekokumisa yo.