Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nyonso nakoki kopesa

Nyonso nakoki kopesa

Zwá:

  1. 1. Yehova, Tata, nakopes’o nyonso nakoki.

    Kosepelis’o, kolinga yo, nde mposa na nga-i.

    Nakosunga bato balingi Liloba mingi.

    Kosakola mpe koteya nde nzela ebongi.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Mosala n’o Yehov’ekolisi kondima na nga’eeh.

    Nalakaki kosalela yo. Nakosal’ango.

    (MONDIMO)

    Tata ya likoló, nakumisi yo,

    Nakosalela yo misala beboo.

    Nga-i’o-yo, tindá nga-i, nabongami.

    Yehova, nakopesa nyonso ngai nakoki.

  2. 2. Namipesi’epa’ n’o, nakolinga bandeko.

    Yango tiká ngai nasunga, bolingo’esɛngi’ango.

    Soki ngai napesi nde nazwak’esengo mingi.

    Tango naza kosalisa bato bayengiyengi.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Mosala n’o, Yehov’ekolisi kondima na nga’.

    Nalakaki kosalela yo. Nakosal’ango.

    (MONDIMO)

    Tata ya likoló, nakumisi yo,

    Nakosalela yo misala beboo.

    Ngai’oyo, tindá nga-i, nabongami.

    Yehova, nakopesa nyonso ngai nakoki.

    (MONDIMO)

    Tata ya likoló, nakumisi yo,

    Nakosalela yo misala beboo.

    Nga-i’o-yo, tindá nga-i, nabongami.

    Yehova, nakopesa nyonso ngai nakoki.