Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na kimya

Zalá na kimya

Zwá:

  1. 1. Naz’obunda na nga’ moko,

    Makanisi mitungisi—

    Na kati ya motema,

    Nzambe pardon salisá.

    Nalamuki nasambeli,

    Yango nde nasengeli kosala.

    Na mitungisi na nga’,

    Yehova azo’ yebisa nga:

    (MONDIMO)

    Namibatela, nazala kimya,

    Namonaka se bolamu.

    Ata bwale nakolɛmba te.

    Nayebi ete nakozwa kimya.

  2. 2. Mposa na nga’ osepela,

    Nzambe na nga’ nazo’ lɛmba,

    Bomoi mpasi mingi

    Wapi yo Nkolo na nga’.

    Natali porte nafongoli

    Tiká nakende koteya nsango,

    Oy’a bomoi ya seko.

    Yehova Tata asungi.

    (MONDIMO)

    Namibatela nazala kimya,

    Namonaka se bolamu.

    Ata bwale nakolɛmba te.

    Nayebi ete nakozwa kimya.

    Nazwi kimya.

    (MOLONGO MOSUSU)

    Nga’ naboyi makanisi

    ya mabe nabwaki yango

    mosika mpe nayini yango

    Yehova merci, osungi nga’ mpenza.

    Osungi nga’ mpenza.

    (MONDIMO)

    Namibatela nazala kimya,

    Namonaka se bolamu.

    Ata bwale nakolɛmba te.

    Nayebi ete nakozwa kimya.