Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoko, makasi na biso!

Bomoko, makasi na biso!

Zwá:

  • (EBANDELI)

    Bandeko bóya elongo!

    Bóya mpo na koyoka!

  1. 1. Toza’ na Nzambe moko,

    Kondima moko mpe bomoko.

    Toza’ na kati’a solo,

    Tosangani mpenza na esengo.

    (LIBOSO YA MONDIMO)

    Nyonso ekoya,

    Biso bomoko.

    Tokosimbana makasi.

    (MONDIMO)

    Toza’ na bomoko mpo toza’ bandeko.

    Bomoko yango nde makasi na biso.

    Tókoba kozala na bolingo’a solo.

    Tósimbana lobɔkɔ, bomoko makasi na biso.

  2. 2. Toza’ bikólo nyonso,

    Bilongi ekeseni kasi

    Kimya nde esangisi.

    Ekumisaka nkombo ya Nzambe.

    (LIBOSO YA MONDIMO)

    Bisika nyonso,

    Bandeko baza’

    Bolingo, kondima eza’.

    (MONDIMO)

    Toza’ na bomoko mpo toza’ bandeko.

    Bomoko yango nde makasi na biso.

    Tókoba kozala na bolingo’a solo.

    Tósimbana lobɔkɔ, bomoko makasi na biso.

    Toza’ na bomoko ya solo.

    (MONDIMO)

    Toza’ na bomoko mpo toza’ bandeko.

    Bomoko yango nde makasi na biso.

    Tókoba kozala na bolingo’a solo.

    Tósimbana lobɔkɔ, bomoko makasi na biso.

    Bomoko, bomoko, bomoko.

    Bomoko makasi na biso.