Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini okoki kobengana bamposa ya mabe?

Ndenge nini okoki kobengana bamposa ya mabe?

Engebene Biblia

Ndenge nini okoki kobengana bamposa ya mabe?

“Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.”​—BALOMA 7:21.

EKOKI kozala ete Paulo asalaki mosala makasi koleka bantoma nyonso mosusu na oyo etali kolendisa bato bátosa mitinda ya boklisto, mitinda oyo eleki malamu. (1 Bakolinti 15:9, 10) Atako bongo, andimaki bolɛmbu na ye na maloba oyo ezali awa likoló. Azalaki ntango nyonso koyoka ete bamposa ya mabe ezalaki kotika te koyela ye na makanisi. Esilá mpe kokómela yo oyoka ndenge ntoma Paulo azalaki koyoka? Ya solo, lokola tozali bikelamu ya kozanga kokoka, nani kati na biso akoki koloba ete naino mposa ya mabe eyelá ye na makanisi te?

Mpo na bato mingi, etumba mpo na kobengana bamposa ya mabe ezalaka makasi mpenza. Basusu babundaka mpo na kokanga mposa ya kosangisa nzoto oyo eyelaka bango makasi mpenza. Basusu bakokaka te kotika mimeseno ya mabe ya kobɛta masano ya mbongo, komɛla likaya, bangi, to masanga. Ntango bamposa ya mabe mpe ya mbindo eyeli biso na makanisi, ndenge nini tokoki kobengana yango? Epai wapi tokoki kozwa lisalisi? Etumba mpo na kobengana bamposa ya mabe ekosila mokolo mosusu?

Bolingo: Eloko ya liboso mpo na kobengana bamposa ya mabe

Yesu amonisaki mibeko mibale oyo eleki minene na Mobeko ya Moize. Ya liboso ezalaki oyo: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37) Soki tolingi Nzambe ndenge Yesu alobi, mposa na biso ya libosoliboso ekozala te ya kosepelisa Ye? Soki ezali bongo, mposa wana ya sembo ekoki kosalisa biso na etumba oyo tozali kobundisa bamposa ya mabe, ata soki bamposa yango ezali makasi ndenge nini! Yango ezali kaka likanisi ya mpamba te. Bamilio ya baklisto bazali kolonga kobengana bamposa ya mabe oyo eyelaka bango mokolo na mokolo. Ndenge nini okoki kolinga Nzambe mingi ndenge wana? Soki ozali na botɔndi mpe ozali komanyola likoló ya boboto na ye, oyo ezali komonana na biloko oyo akelá, na Biblia, mpe na makambo oyo asalelaka biso.​—Nzembo 116:12, 14; 119:7, 9; Baloma 1:20.

Mobeko ya mibale eleki monene oyo Yesu atángaki ezalaki: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Ntoma Paulo alobaki ete bolingo “emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te” mpe “elukaka matomba na yango moko te.” Bolingo wana oyo elukaka matomba na yango moko te, esalisaka biso tóboya kosala makambo oyo ekoki koyokisa bato mosusu mpasi. (1 Bakolinti 13:4-8) Ndenge nini tokoki kolona bolingo ya ndenge wana? Soki tozali komitya na esika ya basusu mpe komitungisa mpenza mpo na mayoki mpe bolamu na bango ya seko.​—Bafilipi 2:4.

Epai wapi tokoki kozwa lisalisi?

Lokola Nzambe ayebi ete tozalaka na mokakatano mpo na kosala oyo ezali malamu, asalisaka biso na lolenge mingi. Na nzela ya Liloba na ye, Biblia, ateyaka biso tóyina oyo ezali mabe mpe tókolisa botosi mozindo mpo na ye. (Nzembo 86:11; 97:10) Biblia ezali na masolo ya makambo oyo esalemá mpenza, oyo ezali komonisa ete bato oyo batikelaki bamposa ya mabe nzela basukaki mabe. Lisusu Yesu alobaki ete soki tosɛngi Nzambe elimo santu na ye, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba, akopesa biso yango. (Luka 11:13) Yango ekosalisa biso tókóma na mposa makasi ya kosala oyo ezali malamu. Tozali lisusu na lisalisi ya baninga na biso baklisto, oyo bazali mpe kobundisa bamposa ya mabe, oyo balendisaka biso. (Baebele 10:24, 25) Ntango makanisi wana ya malamu ezwi esika ya oyo mabe, na ntango wana nde tokolonga etumba na biso mpo na kosala oyo ezali malamu. (Bafilipi 4:8) Tozali nde na bandakisa oyo endimisi biso ete ezali solo bongo?

Tózwa ndakisa ya Fidel, oyo ayebanaki na kartye na bango lokola momɛli monene ya masanga. Soki alangwe, azalaki komɛla likaya, kobɛta masano ya mbongo, mpe kobunda bitumba. Ntango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe kokende na makita na bango, yango esalisaki ye atika mimeseno wana. Lelo oyo, azali na bomoi moko ya malamu elongo na mwasi na ye mpe bana na bango mibale.

Moto mosusu akoki kotuna boye: ‘Bongo soki nakwei lisusu kaka na likambo yango?’ Ntoma Yoane amonisaki ete ekoki mbala mosusu kosalema bongo. Akomaki boye: “Bana na ngai ya mike, nazali kokomela bino makambo oyo mpo bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto, moyengebene. Mpe ye azali mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso, nzokande mpo na oyo ya biso kaka te kasi mpe mpo na oyo ya mokili mobimba.” (1 Yoane 2:1, 2) Ya solo, mbeka oyo Yesu apesaki ezipaka mabunga ya moto oyo abongoli motema mpe azali kosala makasi na bosembo mpenza mpo na kobongwana mpe kosepelisa Nzambe. Lokola mbeka wana ezipaka mabunga, ntina mosusu nini moto akoki kopesa mpo na kolɛmbisa mabɔkɔ na etumba mpo na kosala oyo ezali malamu?

Bamposa ya mabe ekosila mpo na libela

Soki tozali kolinga Nzambe mingi mpe bazalani na biso, mpe soki tozali kosalela malamu lisalisi oyo Nzambe azali kopesa biso, ata lelo, tokoki kolonga etumba oyo tozali kobundisa bamposa ya mabe. Lisusu, Liloba ya Nzambe endimisi biso ete etumba yango ekozala mpo na libela te. Etikali moke, baoyo basalelaka na ndenge ya malamu bibongiseli ya elimo oyo Nzambe azali kozwa, bakobika mpo na libela, ezala na nzoto to na elimo. (Emoniseli 21:3-5; 22:1, 2) Bakosikolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa oyo eutaka na lisumu. (Baloma 6:23) Nzokande, baoyo basalaka makasi ata moke te mpo na kobengana bamposa ya mbindo mpe bamposa ya mabe, bakozwa mapamboli wana te.​—Emoniseli 22:15.

Tokoki mpenza kobɔndisama na koyeba ete tokokoba te kobundisa bamposa ya mabe libela na libela. Bamposa ya mabe ekosila libela mpe ekolongwa mpo na seko. Tokosikolama mpenza na boombo yango!