Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tosaká ngonga!

Tosaká ngonga!

Tosaká ngonga!

ZULUNALO USA Today ekomaki ete: “Bakonzi mingi ya misala bakómaka mbala na mbala nsima ya ngonga.” Zulunalo yango ebakisi ete ntango basalaki ankɛti moko epai ya bakonzi ya misala 2 700, bamonaki ete “soki makita ezali 10, bakómaka nsima ya ngonga na makita 6.”

Na miso ya bakonzi ya bakompanyi, kokóma nsima ya ngonga etalelamaka kaka te lokola ezaleli moko ya mabe. Ntango bayekolaki likambo yango epai ya bato 81 000 oyo bazalaki koluka misala, na nsuka bamonaki ete: “Ntango oyo elekaka mpo bato bazali kokóma nsima ya ngonga mpe kozangisa mosala kozanga ndingisa ezongisaka mosala nsima.” Ya solo, ezali kaka te na misala ya kompanyi nde kozanga kotosa ngonga ebimisaka mikakatano. Ankɛti moko oyo basalaki epai ya bakambi ya biteyelo ya ntei emonisaki ete likambo ya “bana-kelasi kokóma nsima ya ngonga ezali likambo ya libosoliboso oyo esɛngaka kopesa bango disipilini mbala na mbala.”

Mozalisi na biso alingaki ete tóyebaka ngonga mpe tótyelaka yango likebi. Yango wana, atyá “miinda mibale ya minene”​—⁠mwese mpe sanza​—mpo esalisaka biso na kokabola ngonga. (Genese 1:​14-16NW) Na mikolo na biso, tozali na bamontre oyo esalisaka biso na kokabola ngonga na miniti mpe na basegɔnde. Atako tozali na bamontre yango, mingi kati na biso tokokaka kaka te kotosa ngonga​—na mosala, na eteyelo, to na makambo mosusu ya ntina oyo babengi biso.

Mokakatano yango eutaka nde na kozanga ntango? Ezali solo ete mosala mpe libota na biso ekoki kozwa biso ntango mingi. Atako bongo, Wanda Rosseland, mama moko ya libota oyo asalaka, alobi boye: “Namilelalelaka lisusu te ete nazangi ntango, mpo nakangi ntina ete biso nyonso tozalaka na ngonga 24 na mokolo. Ntango nakanisaki likambo yango malamu, na nsuka nayaki komona ete lelo oyo tokoki te koloba ete tozali na ntango moke; kasi tozali nde na makambo mingi oyo elyaka biso ntango.”

Tózwa mpe ndakisa ya Renee, * mama ya bana mitano, oyo azali Motatoli ya Yehova. Alobi boye: “Ntango bana na ngai bazalaki naino mike, ezalaki pɛtɛɛ te kobongisa bango mpo bákenda kelasi mpe tókenda na makita ya boklisto. Atako bongo, nazalaki kokóma nsima ya ngonga te. Kasi sikoyo, bango nyonso bakoli, nakómá na momeseno mabe ya kokóma nsima ya ngonga.” Yo mpe ozalaka na momeseno yango ya mabe? Soki ezali bongo, okoki kobongwana! Talá mwa makambo oyo okoki kosala.

KANISÁ MAKAMBO OYO YANGO EKOKI KOBIMISA. Momeseno ya kokóma nsima ya ngonga ekoki komonana lokola likambo ya moke. Nzokande, yoká oyo Biblia elobi: ‘Nzinzi oyo ekufi epesaka mafuta ya monganga nsolo mabe; ndenge moko mwa bozoba moke esalaka mpe bongo na moto oyo ayebani mpo na bwanya mpe lokumu na ye.’ (Mosakoli 10:1) Ɛɛ, kaka “mwa bozoba moke” oyo emonanaka na kozanga limemya mpo na basusu ekoki kobebisa lokumu na yo epai ya molakisi to mokonzi ya mosala.

Marie, mwasi moko oyo azalaki kotánga na Iniversite ya mboka na bango, amonaki ete baninga na ye mosusu ya kelasi “bazalaki mpenza te komitungisa mpo na ngonga,” bazalaki ntango nyonso koya nsima ya ngonga. Alobi boye: “Kasi eumelaki te mpo bábongwana. Baprofesɛrɛ mibale bazalaki kosakana te mpo na ngonga. Soki mwana-kelasi akómi ata nsima ya mwa miniti moke, bazalaki kotánga ye lokola ayei te. Mpe soki batángi yo mbala mingi lokola moto oyo ayei te, okozwa na ekzamɛ te.”

Momeseno ya kokóma nsima ya ngonga ekoki mpe kobebisa lokumu na yo epai ya baninga na yo. Tata moko, nkombo na ye Joseph, akanisi lisusu moklisto moko oyo ayebaki eleki bambula mingi. Atako bazalaki kopesa mobali yango limemya mingi mpo azalaki koteya malamu, azalaki na momeseno moko ya mabe. Joseph alobi ete: “Azalaki koya ntango nyonso nsima ya ngonga. Nalingi koloba nsima ya ngonga na makambo nyonso! Mpe ezalaki komonana lokola ete azalaki komitungisa ata moke te mpo na yango. Bato bakómaki kolobela momeseno na ye wana na masɛki.” Bato babandi mpe kolobela yo lokola moto oyo ayaka ntango nyonso nsima ya ngonga? Soki ezali bongo, ezali mpasi te bábosana bizaleli na yo mosusu ya malamu.

KANISAKÁ BASUSU. Kokóma nsima ya ngonga ezali kozanga limemya mpo na basusu mpe kolongola likebi na bango. Mpe yango ekoki kolakisa lokola ozali komimona ete oleki basusu. Ntango azalaki kolimbola ntina oyo bakambi mingi ya bakompanyi bakómaka nsima ya ngonga na makita na bango, mokambi moko ya kompanyi andimaki ete: “Mpo mingi kati na biso tozalaka kaka na lolendo.” Nzokande, baklisto batalelaka bato mosusu ete baleki bango. (Bafilipi 2:3) Batosaka mpe Lilako lileki malamu mpe basalelaka bato mosusu makambo oyo balingaka ete bato básalela bango. (Matai 7:12) Epesaka yo nkanda te ntango ozelaka bato mosusu? Soki bongo, yo mpe kosala te ete moto azela yo.

MESANÁ KOSALA LIKAMBO NA LIKAMBO NA NTANGO NA YANGO. Olalisaka makambo mpe oyaka kosala mbangumbangu kaka soki mikolo etikali ya kotánga? Ozalaka na makambo ebele ebele ya kosala, olukaka kosala makambo mingi na mwa ntango moke? Etinda oyo ezali na Mosakoli 3:1 ekoki kosalisa yo: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko.” Kozala na “ntango” ya kosala likambo mokomoko ekosalisa yo osala likambo na likambo na ntango na yango.

Libosoliboso, tyá na molɔngɔ makambo nyonso oyo osengeli kosala. Na nsima, landá etinda oyo ezali na Bafilipi 1:10: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.” Ɛɛ, tyá makambo oyo eleki ntina liboso. Makambo nini osengeli kozanga te kosala yango? Makambo nini okoki kosala ata nsima, mpe ekobebisa programɛ na yo te? Na nsuka, luká koyeba ntango boni osengeli kolekisa na kosala likambo mokomoko mpe ntango nini okoki kosala yango. Poná kosala kaka makambo oyo okokoka kosala, mpe koluka te kosala makambo ebele ebele na mwa ntango moke.

Mwasi moko, nkombo na ye Dorothy, andimi ete baboti na ye nde bateyaki ye kotosa ngonga. Alobi boye: “Soki makita ya lisangá ekobanda na ngonga ya 7:30 ya mpokwa, mama azalaki kobanda kobongisa biso ngonga moko na miniti 45 liboso. Tozalaki kotika ntango mpo na kolya, kosukola basaani, kolata, mpe kobima na motuka tii na esika ya makita. Tomesanaki kotosa ngonga.” Mbala mosusu esɛngaka kotika ntango mwa mingi mpo bokoki kokutana na likambo moko oyo bokanaki te. Dorothy alobi boye: “Na mikolo oyo euti koleka, nasengelaki kokenda kozwa bato mosusu na motuka mpo na kokenda na bango na makita. Na nzela, pinɛ etɔbɔkaki. Nabambisaki yango mpe natikalaki kaka na ntango ya kokenda kozwa bango. Omoni ete ntango nyonso natikaka ngonga mpo motuka na ngai ekoki kokufa to mpe mituka mosusu ekoki kokanga nzela.”

SƐNGÁ TOLI EPAI YA BATO MOSUSU. Na Masese 27:17, Biblia elobi ete: “Ebende ekotya ebende mosusu na mopɔtu, boye moto akokokisa elongi na moninga na ye.” Na boyokani na etinda wana, sololá na bato mosusu oyo mpe bazali na makambo mingi ya kosala, kasi basalaka makasi mpo na kotosa ngonga ya kosala likambo mokomoko. Mbala mingi, bakopesa yo toli oyo ekosalisa yo mingi.

Renee, oyo tolobelaki liboso, azwaki mokano ya kotika momeseno na ye ya kokómaka nsima ya ngonga. Alobi boye: “Mikolo oyo euti koleka, namityelaki mokano ya kotosaka ngonga. Atako ezalaki pɛtɛɛ te, nazali kosala makasi nakokisa mokano yango.” Yo mpe okoki kosala bongo. Soki obongoli lolenge na yo ya kotalela makambo mpe soki osali milende, okoki koyekola kotosa ngonga!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 6 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

[Bililingi na lokasa 20]

Kozala na momeseno ya kokóma nsima ya ngonga ekoki kobebisa lokumu na yo epai ya mokonzi na yo ya mosala mpe komonisa ete ozangi limemya mpo na basusu

[Elilingi na lokasa 21]

Kotya likambo na likambo na ntango na yango ekoki kosalisa yo obebisa ntango mpambampamba te