Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini tosengeli na elikya?

Mpo na nini tosengeli na elikya?

Mpo na nini tosengeli na elikya?

NINI elingaki kokómela Daniel, elenge oyo azalaki na maladi ya kansɛr, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo ya liboso, soki abatelaka kaka elikya oyo azalaki na yango? Maladi na ye ya kansɛr elingaki nde kosila? Alingaki nde kozala na bomoi tii lelo? Ata bato oyo bandimaka mpenza ete elikya ebikisaka, bakoki mbala mosusu kondima te ete ekokaki kosalema bongo. Likambo yango ezali komonisa likanisi oyo ya ntina: tosengeli te kotalela elikya na ndenge ya kolekisa ndelo. Elikya ezali nkisi te mpo na maladi nyonso.

Ntango batunaki monganga Nathan Cherney mituna na televizyo ya CBS News, alobaki ete kolekisa ndelo na ndenge ya kotalela elikya ntango bozali kosalisa moto oyo azali kobɛla maladi ya makasi ezali likama: “Tomonaki mibali kopesa basi na bango foti ete bazalaki mpenza te kondima ete bakobika, bazalaki mpenza te na elikya makasi.” Monganga Cherney abakisaki boye: “Lolenge wana ya kokanisa nde ebimisá likanisi ya libunga oyo ete moto akoki ye moko kosilisa maladi na ye; mpe soki esili te, bakoloba ete ye moko amilɛmbisaki nzoto; nzokande koloba bongo ezali solo te.”

Mpo na koloba solo, baoyo bazali kobundana na maladi oyo bakobika na yango te, bazali kobunda etumba moko ya makasi mpenza, oyo esilisaka makasi na bango nyonso. Bandeko mpe baninga na bango basengeli kokeba ete bápesa bango foti te, mpamba te yango ekoya kobakisa kilo na mokumba oyo bazali komema. Kasi, tosengeli nde koloba ete elikya esalaka eloko moko te?

Ezali mpenza bongo te. Na ndakisa, monganga Cherney ayekolaki ndenge ya kokitisa mpasi ya bato ya maladi, elingi koloba kosalisa moto ya maladi mpo na kosilisa mbala moko maladi na ye te to kosalisa ye atikala lisusu na bomoi ntango molai, kasi nde kokómisa bomoi na ye malamu mpo amiyoka malamu ntango nyonso oyo azali kobundana na maladi. Ye ná minganga mosusu bandimi ete lolenge malamu ya kosalisa moto ya maladi ezali ya kosalisa ye akóma na kimya ya makanisi, ata soki azali kobɛla maladi ya makasi. Ezali na makambo mingi oyo endimisi biso ete elikya esalaka ete moto akóma na kimya ya makanisi​—esalaka mpe makambo mosusu mingi.

Elikya ezali na motuya mingi

Monganga Gifford Jones, oyo mpe akomaka masolo na zulunalo moko ya makambo ya monganga, alobi ete: “Elikya ezali nkisi moko ya makasi.” Atalelaki baankɛtɛ mingi oyo esalemaki mpo na koluka koyeba litomba ya kokitisa motema ya moto ya maladi oyo akobika te. Balobaka ete kozala pene na moto ya maladi ndenge wana esalisaka ye azala na elikya mpe atalela makambo na ndenge ya malamu. Ntango bayekolaki likambo yango na 1989, bamonaki ete bato ya maladi oyo bato bazalaka pene na bango baumelaka mingi liboso ya kokufa; nzokande ntango bayekoli lisusu likambo yango na mikolo oyo euti koleka, bamonaki ete ezalaki mpenza bongo te. Atako bongo, baankɛtɛ emonisi ete bato ya maladi oyo bato bazalaka pene na bango banyokwamaka mpenza te na makanisi mpe bayokaka mpasi mingi te lokola basusu.

Tótalela ankɛtɛ mosusu oyo esalemaki mpo na koyeba soki makanisi ya kolonga mpe makanisi ya kozanga elikya esalaka nini epai ya moto oyo azali na maladi ya misisa ya motema. Balandelaki mibali koleka 1300 mpo na koyeba ndenge oyo mokomoko azalaki kotalela bomoi, soki azalaki kotalela yango na makanisi ya kolonga to ya kozanga elikya. Ntango balandelaki lisusu bango nsima ya mbula zomi, bamonaki ete bato 12 likoló na mokama kati na bango babɛlaki maladi ya misisa ya motema. Kati na baoyo babɛlaki, bato oyo bazalaki na makanisi ya kozanga elikya bazalaki mingi mbala mibale koleka baoyo bazalaki na makanisi ya kolonga. Laura Kubzansky, profesɛrɛ na makambo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto mpe bizaleli ya bato na École de santé publique na Iniversite ya Harvard, alobi ete: “Bilembeteli emonanaki naino mpenza te mpo na kondimisa bato ete ‘kozala na makanisi ya kolonga’ ezali malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Ankɛtɛ yango emonisi mpo na mbala ya liboso makambo oyo endimisi minganga ete likanisi yango ezali solo mpo na bamaladi ya motema.”

Na baankɛtɛ mosusu, bamonaki ete bato oyo bakanisaka ete bazali mpenza nzoto makasi te, bazongelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango noki te soki basali bango lipaso, nzokande baoyo bakanisaka ete bazali nzoto makasi bazongelaka bokolɔngɔnɔ na bango ya nzoto nokinoki nsima ya lipaso. Kutu, bamonaki ete bato oyo bazalaka na elikya baumelaka mingi na mokili. Na ankɛtɛ mosusu balukaki koyeba soki mibange babangaka ndenge bazali kokóma mibange to basepelaka na yango. Ntango bazalaki kopesa mbala na mbala nsango moko oyo ezalaki komonisa ete moto oyo akómi mobange akómaka na bwanya mingi mpe ayebaka makambo mingi ya bomoi, mibange yango bakómaki kotambola mwa makasi mpe bazongelaki nzoto makasi. Kutu, makasi oyo bazwaki ezalaki lokola nde basalisaki bango ngalasisi bapɔsɔ 12!

Mpo na nini makambo lokola elikya, makanisi ya kolonga mpe kozela likambo moko kozanga kobanga ekoki kozala na litomba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto? Ekoki kozala ete bato ya siansi mpe minganga bayebi naino malamumalamu te ndenge oyo nzoto ya moto mpe bɔɔngɔ na ye esalaka mpo bápesa eyano ya sikisiki na motuna yango. Atako bongo, bato ya mayele oyo bayekolaka likambo yango bakoki kopesa makanisi ya mayele. Na ndakisa, profesɛrɛ moko oyo azali monganga ya maladi ya motó alimboli boye: “Ezali malamu kozala na esengo mpe na elikya. Yango ezali ezaleli ya malamu oyo esalaka ete moto amitungisa mingi te, mpe soki moto azali na esengo mpe na elikya, nzoto na ye esalaka malamu mpenza. Wana ezali likambo mosusu oyo moto akoki kosala ye moko mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ.”

Likanisi wana ekoki kozala ya sika mpo na minganga mosusu, mpo na bato mosusu ya pisikoloji mpe ya siansi, kasi ezali ya sika te mpo na bato oyo bayekolaka Biblia. Esili koleka mbula pene na 3000, Salomo, mokonzi ya mayele, apemamaki na Nzambe mpo na kokóma maloba oyo: “Motema na kosepela ekosalaka malamu lokola nkisi; nde molimo motutami ekokaokisa mikwa.” (Masese 17:22) Vɛrsɛ yango ezali mpenza na bokatikati. Elobi te ete motema ya kosepela ezali nkisi mpo na kobikisa maladi nyonso, kasi elobi bobele ete “ekosala malamu lokola nkisi.”

Kutu, tokoki komituna boye: Soki elikya ezalaki nkisi, monganga nini alingaki koboya kokomela bato yango? Lisusu, matomba ya elikya esuki kaka te na kobikisa moto ya maladi.

Makanisi ya kolonga, makanisi ya kozanga elikya mpe bomoi na yo

Bato oyo bayekolaka likambo yango bamonaki ete bato oyo bazalaka na makanisi ya kolonga bazwaka matomba mingi ndenge bamonisaka elimo yango. Balongaka na kelasi, na mosala, mpe na masano. Na ndakisa, bayekolaki likambo yango na ekipi moko ya bana basi oyo basalaka masano ya mbangu. Balakisi na bango balobelaki makoki ya mosani mokomoko epai ya bato oyo basalaki ankɛtɛ yango. Nzokande, bato oyo basalaki ankɛtɛ balandelaki bana basi yango mpo na koyeba elikya oyo mokomoko azalaki na yango. Na nsuka, bamonaki ete bana basi oyo bazalaki na elikya mingi nde balongaki na momekano, kasi ezalaki te mpo na makoki oyo balakisi na bango balobelaki. Mpo na nini elikya ebongolaka makambo mingi bongo?

Bayebaki makambo mingi ntango bayekolaki ezaleli oyo ekeseni na elikya​—kozanga elikya. Na bambula ya 1960, makambo oyo bayekolaki epai ya banyama ekamwisaki bato oyo bayekolaki likambo yango mpe etindaki bango na kobimisa elobeli “ezaleli ya kozanga elikya oyo bazwi yango kozwa.” Bamonaki ete bato mpe bakoki kokóma na bizaleli ya ndenge wana. Na ndakisa, batyaki bato mwa mingi na esika moko oyo ezalaki kobimisa makɛlɛlɛ makasi, mpe bayebisaki bango ete bakoki kosilisa makɛlɛlɛ yango soki bafinifini babutɔ ebele oyo ezalaki wana. Nsukansuka, bato yango basilisaki makɛlɛlɛ yango.

Bayebisaki mpe bato mosusu básala ndenge moko, kasi na mbala oyo, bafinafinaki babutɔ kasi makɛlɛlɛ esilaki te. Ndenge okoki kokanisa yango, bato mingi na etuluku wana ya mibale bakómaki kokanisa ete ata basali nini bakolonga te. Ntango basɛngaki bango básala yango lisusu bambala ya nsima, balingaki komeka ata komeka te. Bakanisaki ete ata soki basali ndenge nini bakosilisa makɛlɛlɛ yango te. Kasi, ata kati na bato ya etuluku yango ya mibale, bato ya makanisi ya kolonga bakangaki mabɔkɔ te mpe bazalaki kaka na elikya.

Monganga Martin Seligman, oyo azali moko na baoyo babimisaki mayele wana mpo na koyekola likambo yango, asepelaki kolekisa bomoi na ye mobimba na koyekola makanisi ya kolonga mpe makanisi ya kozanga elikya. Ayekolaki malamumalamu makanisi oyo bato bazalaka na yango ete bakokoka makambo te. Na nsuka, alobaki ete makanisi ya kozanga elikya ezongisaka bato mingi nsima na makambo mingi, mpe mbala mosusu epekisaka bango kosala ata eloko moko. Seligman ayebisi na mokuse makanisi ya kozanga elikya mpe eloko nini yango esalaka: “Nsima ya koyekola likambo yango mbula ntuku mibale na mitano, nandimi ete soki tozali na momeseno ya kokanisa lokola bato ya makanisi ya kozanga kolonga, ete soki tolongi te na likambo nyonso ezali foti na biso moko mpe ete yango ekobongwana soki moke te, makambo mingi oyo tozali kosala ekolonga te; ndenge kaka tozali kokanisa yango.”

Likanisi oyo asukisi na yango ekoki mpe komonana lokola ya sika epai ya bato mosusu lelo oyo; kasi yango ezali ya sika te mpo na baoyo bayekolaka Biblia. Yoká ndenge lisese oyo elobi: “Olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Makasi na yo ekozala moke.” (Masese 24:10, NW) Ɛɛ, Biblia elimboli polele ete kolɛmba nzoto, oyo eutaka na makanisi ya kozanga elikya, ekoki kozangisa yo makasi ya kosala likambo oyo olingaki kosala. Kasi, okoki kosala nini mpo na kobengana makanisi ya kozanga elikya mpe kokóma na makanisi ya kolonga mpe kobakisa elikya na bomoi na yo?

[Elilingi na lokasa 4]

Elikya ekoki kosala malamu mingi