Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kobundisa makanisi ya kozanga elikya

Okoki kobundisa makanisi ya kozanga elikya

Okoki kobundisa makanisi ya kozanga elikya

OMIYOKAKA ndenge nini soki likambo moko esalemi te ndenge okanaki? Lelo oyo, bato mingi ya mayele bakanisaka ete eyano na motuna wana nde emonisaka soki ozali moto ya makanisi ya kolonga to ya kozanga elikya. Biso nyonso tokutanaka na mikakatano ndenge na ndenge na bomoi na biso, basusu kutu ya makasi koleka. Kasi, mpo na nini emonanaka ete bato mosusu baumelaka te kozongela makasi mpe kobanda lisusu, nzokande basusu balɛmbisaka mabɔkɔ libela soki kaka bakutani na mikakatano ata ya mikemike?

Na ndakisa, kanisá ete ozali koluka mosala. Mokonzi moko ya mosala abengi yo mpo na kosolola na yo, kasi na nsuka azwi yo na mosala te. Okomiyoka ndenge nini lokola bazwi yo na mosala te? Okoki kokanisa ete baboi nde yo mpe komona lokola ete okozwa lisusu mosala te, to komilobela ete: ‘Moto moko akosepela na ngai te. Nakozwa lisusu mosala te.’ To, oyo eleki mabe, okoki kotika ete likambo wana ezangisa yo elikya na makambo nyonso ya bomoi na yo, mpe kokanisa ete: ‘Nakoki kosala eloko moko ya malonga te. Moto moko te akomona ete nazali na ntina.’ Ezala ndenge nini, kokanisa bongo nde emonisaka makanisi ya kozanga elikya.

Ndenge ya kobengana makanisi ya kozanga elikya

Ndenge nini okoki kobundisa makanisi ya kozanga elikya? Likambo ya liboso mpenza ezali ya koyeba ntango makanisi yango eyeli yo. Likambo ya mibale ezali ya kobundisa makanisi yango. Luká koyeba makambo nini esali ete olonga te. Na ndakisa, ezali mpenza solo ete bazwi yo na mosala te kaka mpo balingi yo te? To ekoki kozala ete mokonzi wana ya mosala azalaki nde koluka moto oyo ayebi mosala mosusu oyo yo oyebi te?

Ntango okotalela likambo mokomoko, okomona ete makanisi oyo ozali na yango ya kozanga elikya ezali ya koleka ndelo. Soki bazwi yo na mosala te, yango elingi nde koloba ete oyebi eloko te? Ezali te na makambo mosusu ya bomoi na yo​—na ndakisa ndenge ozali kokola na elimo, boyokani na yo ná bandeko na yo ya libota to ná baninga na yo—​oyo ezali kotambola malamu? Yebá ete komikanisela mabe ndenge wana ekokani na koloba ete ata osali ndenge nini okolonga te. Kutu, nini endimisi yo ete okozwa mosala lisusu te? Ezali na makambo mingi oyo okoki kosala mpo na kobengana makanisi ya kozanga elikya.

Makanisi ya kolonga mpe komityela mikano

Na bambula oyo euti koleka, bato oyo bayekolaka likambo yango balimbolaki liloba elikya na ndenge ya malamu mpenza, atako ndimbola yango elobeli makambo nyonso te. Balobi ete elikya elimboli kondima ete okolonga kokokisa mikano oyo omityeli. Ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, elikya esuki kaka te na kokokisa mikano oyo omityeli. Kasi ndimbola oyo emonani ete ebongi mpenza mpo na bantina mingi. Soki totaleli elikya na ndenge wana oyo etali bomoi na biso moko, yango ekosalisa biso tókolisa makanisi ya kolonga mikano oyo tomityeli.

Mpo tóndima ete tokolonga kokokisa mikano oyo tomityeli, tosengeli kobanda naino na komityela mikano mpe kokokisa yango. Soki omoni ete osalá naino bongo te, ekoki kozala malamu okanisa malamumalamu mpo na mikano oyo osengeli komityela. Kasi, mikano nini ozali na yango? Ezali mpasi te ete misala oyo tosalaka mokolo na mokolo na bomoi oyo etondi na yikiyiki mpe na makambo kilikili, ezindisa biso mobimba mpe tózanga ntango ya kofanda mpo na kokanisa nini mpenza tolingi kosala na bomoi na biso, likambo nini mpenza ezali na ntina mingi mpo na biso. Mpo na etinda wana ya koyeba makambo nini esengeli kotya yango na esika ya liboso, tomoni lisusu ete banda kala Biblia esilá kolobela yango: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

Soki toyebi makambo nini eleki ntina na bomoi na biso, ekozala mpasi te tómityela mikano ya ntina na makambo mingi, na ndakisa na makambo ya elimo, na makambo etali libota na biso, kelasi nini tokotánga to mosala nini tokosala. Kasi, ezali na ntina ete tómityela te mikano ebele na ebandeli mpe tómityela kaka mikano oyo tomoni ete tokolonga kokokisa yango. Soki tomityeli mokano oyo eleki makasi, ekoki kolɛmbisa biso mpe mbala mosusu tokokokisa yango te. Yango wana, mbala mingi ezalaka malamu soki omityeli mokano moko oyo ekosɛnga ntango mingi, okokisa yango ndambo ndambo.

Lisese moko ya kala, oyo mpe ezali na mwa ndambo ya solo, elobaka ete: “Soki olingi likambo, okosala yango.” Soki toyebi mikano na biso oyo eleki ntina, ekosɛnga tózala na mposa ya kokokisa yango​—kolinga yango mpe kozala na ekateli—​ya kokokisa yango. Tokoki kokóma na ekateli wana makasi soki tozali komanyola likoló na ntina ya mikano yango mpe matomba oyo tokozwa soki tokokisi yango. Ya solo, tokokutana na kwɔkɔsɔ, kasi tosengeli kotalela yango lokola mikakatano oyo tokoki kolonga, na esika ya komona lokola ete ndenge mosusu ya kosala ezali te.

Nzokande, tosengeli mpe kokanisa nini mpenza tokoki kosala mpo na kokokisa mikano na biso. Mokomi ya babuku Snyder, oyo ayekolaki na mozindo ntina ya kozala na elikya, apesi toli ete na mokano nyonso oyo tomityeli, esengeli kokanisa mayele ndenge na ndenge oyo tokosalela mpo na kokokisa yango. Na nsima, soki tosaleli mayele moko kasi ezali kolonga te, tokoki komeka ya mibale, ya misato, mpe bongo na bongo.

Snyder apesi mpe toli ete osengeli koyeba ntango nini kotika mokano moko mpe kozwa mosusu. Soki tomoni mpenza ete tokolonga te kokokisa mokano oyo tomityelaki, komitungisa mingi mpo na yango ekoki bobele kolɛmbisa biso nzoto. Nzokande, soki totiki mokano wana mpe tozwi mokano mosusu oyo tokolonga kokokisa yango, tokozala na ntina mosusu ya kozala na elikya.

Biblia ezali na ndakisa moko oyo ekosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango. Mokonzi Davidi asepelaki mpenza makasi na mokano oyo azalaki na yango ya kotonga tempelo mpo na Nzambe na ye, Yehova. Kasi, Nzambe ayebisaki Davidi ete mwana na ye Salomo nde akotonga yango. Na esika Davidi alɛmba nzoto to asala motó makasi, amityelaki nde mokano mosusu. Asalaki makasi mpo na kobomba mbongo mpe biloko ya mosala oyo mwana na ye akozala na yango mposa mpo na kosala mosala yango.​—1 Mikonzi 8:17-19; 1 Ntango 29:3-7.

Ata soki tosali makasi mpo na kozala na elikya makasi mpo na bomoi na biso moko, na kobengana makanisi ya kozanga elikya, kokolisa makanisi ya kolonga mpe komityelaka mikano, ekoki kozala ete tokozala kaka na mokakatano makasi mpo na kozala na elikya. Mpo na nini? Pamba te makambo mingi oyo esalaka ete tózanga elikya na mokili oyo eutaka na bantina oyo biso moko tokoki kopekisa yango te. Ntango tozali komona mikakatano oyo ezali konyokola bato​—bobola, bitumba, kozanga bosembo, maladi mpe liwa—​ndenge nini tokoki kaka kobatela elikya na biso?

[Elilingi na lokasa 7]

Soki bazwi yo te na mosala oyo olingaki, okanisi ete okozwa lisusu mosala te?

[Elilingi na lokasa 8]

Mokonzi Davidi ayebaki kobongola mikano na ye