Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Buku oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso

Buku oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso

“Banda mokili ebandá, ezali na buku moko te oyo ekabolamá mingi koleka Biblia.”​—The World Book Encyclopedia.

ELEKI sikoyo mbula koleka 550, Johannes Gutenberg, moto moko ya mayele na Allemagne, abandisaki mosala ya konyata mikanda na masini. Buku ya liboso ya ntina mingi oyo asalaki na masini na ye ezalaki Biblia. * Banda wana, ebele ya babuku ya ndenge na ndenge enyatamaka na masini. Kasi, ata moko te ekokani na Biblia.

  • Balobaka ete motángo ya Babiblia oyo enyatamá (na mobimba to na ndambo) eleki miliare minei na ndambo (4,7). Motángo yango eleki mbala mitano na ndambo oyo ya buku Mwa buku motane ya Mao (na Chinois), oyo mpe ekabolamá mingi koleka babuku mosusu.

  • Eumeli te, na mbula moko mpamba, Babiblia ya mobimba to ya ndambo ekabolamaki koleka milio 50. Zulunalo moko (The New Yorker) elobi ete: “Mbula na mbula, Biblia etɛkamaka mingi koleka babuku mosusu nyonso.”

  • Biblia ya mobimba to ya ndambo ebongolami na minɔkɔ koleka 2 400. Bato mingi (koleka 90 %) bazali na yango ata ya ndambo na minɔkɔ oyo balobaka.

  • Pene na katikati ya bakomi ya Biblia basilisaki kokoma mikanda na bango liboso kutu bato oyo mibale bábotama: Confucius, moto ya bwanya na Chine oyo ayebani mingi, mpe Siddhartha Gautama, mobandisi ya Lingomba ya Bouddha.

  • Bayembi mpe bayemi bakɔtisá makambo mingi ya Biblia na mosala na bango; kutu makambo yango emonanaka ata na mayemi, na miziki mpe na mikanda mosusu oyo ekendá nsango.

  • Atako bakonzi mosusu bapekisaki Biblia, bato ya mangomba batumbaki ebele ya Babiblia mpe bato mosusu ya mayele batyolaki yango, kasi Biblia ezali tii lelo oyo. Ezali na buku mosusu te oyo batɛmɛlá yango makasi ndenge wana kozanga ete elimwa.

Omoni te ete makambo oyo touti kolobela ezali mpenza kokamwisa? Na ntembe te, makambo to mitángo yango ya kokamwisa ekoki te mpo na komonisa ete Biblia ebongi kotyelama motema. Yango wana, tokolobela sikoyo ntina mitano oyo etindi ebele ya bato bándima ete Biblia ebongi kotyelama motema.

^ par. 3 Biblia oyo Gutenberg anyataki na masini na ye ezalaki libongoli moko ya monɔkɔ ya Latin, mpe asilisaki konyata yango soki na mobu 1455.