Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okopesa eyano nini?

Okopesa eyano nini?

Okopesa eyano nini?

LIMBOLÁ LISESE OYO

1. Na lisese ya Yesu oyo ezali na Matai 18:12-14, likambo nini ekómelaki mpate moko?

․․․․․

2. Nani babengaka mobateli ya bampate?

․․․․․

3. Mobateli ya bampate ayokaki ndenge nini ntango amonaki mpate oyo ebungaki?

․․․․․

◼ Mpo na kosolola: Na ndenge nini Yehova azali lokola mobateli ya bampate? Na ndenge nini yo ozali lokola mpate?

ESALEMAKI NTANGO NINI?

Komá nkombo ya mokomi (to bakomi) ya mokanda mokomoko ya Biblia oyo ezali awa na nse, mpe tyá mokɔlɔtɔ kobanda na nkombo ya mokanda tii na dati oyo ekoki kozala ete basilisaki kokoma yango.

Nsima ya 443 L.T.B. Nsima ya 62 T.B. Nsima ya 70 T.B.

455 L.T.B. 64 T.B.

4. Malaki

5. Yakobo

6. 2 Petelo

NGAI NANI?

7. Yakobo alobaki ete nazali moyengebene mpo nayambaki malamu bamemi-nsango.

NGAI NANI?

8. Nazalaki ndeko ya Balanabasi, mpe Petelo abengaki ngai mwana na ye.

EZALI NA ZULUNALO OYO

Yanolá na mituna oyo, mpe tyá vɛrsɛ to bavɛrsɛ oyo esengeli.

Lokasa 8 Yobo alobaki nini mpo na mabelé? (Yobo 26:․․․)

Lokasa 11 Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela Makomami Mosantu? (1 Batesaloniki 2:․․․)

Lokasa 12 Bakonzi ya Yisalaele bazwaki etinda ya kokoma nini? (Deteronome 17:․․․)

Lokasa 28 Biblia esɛngi yo omindimisa likambo nini? (Baloma 12:․․․)

Bana báluka bafɔtɔ oyo

Okoki koluka bafɔtɔ oyo na Lamuká! oyo? Na maloba na yo moko, limbolá elilingi mokomoko.

(Biyano ezali na lokasa 27)

BIYANO YA LOKASA 31

1. Ebungaki.

2. Moto oyo atambwisaka bampate mpe akɛngɛlaka bango.

3. Ayokaki esengo.

4. Malaki, nsima ya 443 L.T.B.

5. Yakobo, liboso ya 62 T.B.

6. Petelo, 64 T.B.

7. Lahaba.​—Yakobo 2:25.

8. Malako.​—Bakolose 4:10; 1 Petelo 5:13.