Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini bana mibali basepelaka na ngai te?

Mpo na nini bana mibali basepelaka na ngai te?

Mituna oyo bilenge batunaka

Mpo na nini bana mibali basepelaka na ngai te?

Ayebi ete bato basepelaka na ngai mingi mpo nayebisá ye ete bana mibali mosusu balingaka ngai. Asɛkaki ntango nayebisaki ye ete baninga na ngai mosusu bazali bazoba. Mpe ayebi ete nazali mayele​—nasembolá ye na makambo mosusu oyo alobaki. Nazali komituna soki azali kozela nini mpo asɛnga ngai tóbanda kobima.

Azali kitoko, kasi amonanaka likolólikoló! Nasololaka na ye na mpasi. Mpe soki nalobi likambo asembolaka ngai! Soki namoni ye nalukaka kokima ye.

YO MPE omitungisaka ete bana mibali basepelaka na yo te? Bilenge basi mingi bamitungisaka bongo, ezala baoyo okanisaka ete bazalaka na mokakatano te! Tózwa ndakisa ya Joanne. Azali kitoko, mayele mpe ayebi koloba. Kasi, alobi boye: “Mbala mingi namonaka ete bilenge mibali basepelaka na ngai te. Mwa ndambo oyo nasepelaki na bango, basepelaki na ngai kaka mpo na mwa ntango, kasi na nsima batikaki mpenza kosololisa ngai!”

Makambo nini esalaka ete mwana mobali asepela na mwana mwasi? Makambo nini esepelisaka bango te? Kozanga komisambwisa, okoki kosala nini mpo mwana mobali ya malamu asepela na yo?

Oyo okoki kosala

Luká komiyeba. Na ntembe te, omonaki ete ntango kaka okɔtaki na eleko ya bolenge, okómaki kosepela na bana mibali. Ekoki kozala osepelaki na moko to mingi. Ezali mabe te. Kasi, soki owelaki kolinga elenge mobali ya liboso oyo abɛtisaki yo motema, olingaki kokola malamu te na bomoto mpe na elimo. Esɛngaka ntango mpo na kokolisa bomoto ya malamu mpe ‘kokómisa makanisi na yo ya sika’ na makambo ya ntina, mpe kokokisa mikano mosusu oyo omityelá.​Baroma 12:2; 1 Bakorinti 7:36; Bakolose 3:9, 10.

Ya solo, bilenge mibali mingi basepelaka na bana basi oyo bakɔmeli naino te to bayebi makambo te. Kasi, bilenge mibali yango basepelaka nde libosoliboso na nzoto ya elenge mwasi, kasi te na bizaleli na ye. Mpo na koloba solo, elenge mobali oyo azali na makanisi ya malamu, akoluka elenge mwasi oyo azali na bizaleli oyo ekosalisa bango na boninga na bango.​—Matai 19:6.

Oyo bilenge mibali balobaka: “Nasepelaka na elenge mwasi oyo azali na likoki ya kopesa makanisi na ye moko, oyo amimonaka ete azali moto lokola bato nyonso.”​—James.

“Nasepelaka na elenge mwasi oyo akoki kopesa likanisi na ye na bosembo, na limemya mpe oyo andimandimaka te makambo nyonso oyo nalobaka. Ata soki azali kitoko, nasepelaka te na elenge mwasi oyo alingaka kaka koloba makambo oyo matoi na ngai esepelaka koyoka. Yango ebangisaka ngai!”​—Darren.

“Nandimi ete mbala mingi nasepelaka libosoliboso na bilenge basi oyo bazali kitoko. Kasi, kitoko yango ekoki komonana mpamba soki elenge mwasi azali na mikano ya malamu te. Epai mosusu, soki elenge mwasi yango ayebi oyo alingi kosala na bomoi na ye​—mingimingi soki asilá kokokisa mikano na ye mosusu—​yango ekoki kosala ete nasepela na ye mingi.”​—Damien.

Memyáká basusu. Ndenge kaka olingaka bálinga yo, bilenge mibali oyo oyebi bazalaka mpe na mposa makasi bámemya bango. Yango wana tokoki kokamwa te ete Biblia elobi ete mobali asengeli kolinga mwasi na ye, mpe ete mwasi asengeli kozala na “limemya makasi” mpo na mobali na ye. (Baefese 5:33) Na boyokani na toli yango, ankɛtɛ moko oyo esalemaki epai ya bilenge mibali mingi emonisaki ete mingi na bango (koleka 60 %) balobaki ete basepelaka mingi na limemya koleka bolingo. Mibali mingi oyo bazali mikóló (koleka 70 %) oyo batunaki, balobaki mpe kaka bongo.

Limemya elimboli te kozala bindimandima​—kotika makanisi ya malamu oyo ozalaki na yango mpe koyebisa yango te. (Ebandeli 21:10-12) Kasi, lolenge oyo ozali kopesa makanisi na yo ekomonisa na ntembe te soki ozali kobengana to kobenda elenge mobali. Soki ozali ntango nyonso kotyaka ye ntembe to kosembolaka ye, akoki komona ete ozali mpenza na limemya te epai na ye. Kasi, soki ozali kondima likanisi na ye mpe kolobela esika oyo omoni ete alobi malamu, na ntembe te akobanda mpe kondima mpe kozwa na motuya makanisi na yo. Ya solo, elenge mobali oyo azali na bososoli akomona mpe soki ozalaka na limemya epai ya bato ya libota na yo mpe bato mosusu. *

Oyo bilenge mibali balobaka: “Bilenge mibali bakanisaka ete makanisi na bango esengeli kozala na ntina mingi, mingimingi epai ya elenge mwasi oyo bazali kosepela na ye.”​—Anthony.

“Ntango mwasi ná mobali babandi kokutana mpo na libala, limemya ezali eloko eleki ntina. Bolingo eyaka na nsima.”​—Adrian.

“Soki elenge mwasi azali komemya ngai, nakanisi ete nsukansuka akolinga ngai.”​—Mark.

Latáká na ndenge ebongi mpe zaláká pɛto. Molato mpe ndenge na yo ya kobongisa nzoto emonisaka makanisi mpe bizaleli na yo. Liboso kutu obanda kosolola na elenge mobali, ndenge kaka ozali komonana na miso elobaka mingi. Soki molato na yo ebongisami malamu mpe olati na ndenge ebongi, ekoloba malamu mpo na yo. (1 Timote 2:9) Kasi, soki olati bilamba oyo ezali kotinda bato na makanisi ya mabe to ezali salite, ekoloba mpenza ndenge ozali​—ozali na bizaleli ya mabe!

Oyo bilenge mibali balobaka: “Ndenge elenge mwasi alataka elobaka mingi na ndenge oyo atalelaka bomoi. Soki azali kolata bilamba oyo ezali komonisa nzoto na ye to bilamba oyo ezali salite, yango ekomonisa ngai ete azali elenge mwasi oyo nasengeli kotya likebi te.”​—Adrian.

“Nasepelaka na elenge mwasi oyo abongisaka malamu nsuki na ye, azalaka nsolo kitoko, mpe oyo azalaka na mongongo kitoko. Kasi, atako nasepelaka na elenge mwasi oyo azali kitoko, soki azali salite nakotika ye.”​—Ryan.

“Nasepelaka mpenza te na elenge mwasi oyo atondisaka biloko ebeleebele na elongi (maquillage) mpe oyo alataka te bilamba oyo ekangá nzoto to oyo alataka mpo na kobenda likebi ya bato.”​—Ethan.

“Ya solo, soki elenge mwasi alati bilamba oyo ezali kolakisa nzoto, akoki kobenda likebi ya bato. Kasi, azali te elenge mwasi oyo nakosepela kolingana na ye.”​—Nicholas.

Oyo osengeli te kosala

Kozala sɛlɛsɛlɛ te. Basi bazalaka na nguya ya kobenda mibali. Nguya yango ekoki kosalelama na ndenge ya malamu to na ndenge ya mabe. (Ebandeli 29:17, 18; Masese 7:6-23) Soki ozali kosalela nguya yango mpo na kobenda elenge mobali nyonso oyo okutani na ye, bato bakoyeba yo ete ozalaka sɛlɛsɛlɛ na bana mibali.

Oyo bilenge mibali balobaka: “Kofanda kaka pene ya elenge mwasi ya kitoko mpe soki mapeka na bino etutani, ekoki kolamwisa mposa epai ya mwana mobali. Na yango, namonaka ete elenge mwasi oyo azali kosimba yo mbala na mbala ntango azali koloba na yo azali kosakana na motema na yo.”​—Nicholas.

“Soki elenge mwasi azali ntango nyonso koluka kosimba lobɔkɔ ya elenge mobali nyonso to kolalisela mibali nyonso oyo bazali koleka miso, wana nakanisi ete azali kosakana na motema ya bana mibali, mpe namonaka ete azali te elenge mwasi ya kosepela na ye.”​—José.

“Nakoloba ete soki elenge mwasi azali kosimba elenge mobali nyonso oyo azali kokutana na ye mpe azali nokinoki komipesa na elenge mobali nyonso oyo atyeli ye likebi, yango ekomonisa ete asakanaka na mitema ya bilenge mibali.”​—Ethan.

Kotingamatingama te. Ntango mwasi ná mobali babalani, bakómaka oyo Biblia ebengi “mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Na ntango wana, mobali ná mwasi batikaka makambo mingi oyo bazalaki na bonsɔmi ya kosala ntango bazalaki bango moko; ya solo mpenza, bakanganaka moko epai ya mosusu. (1 Bakorinti 7:32-34) Kasi, soki ozali naino koluka koyeba elenge mobali, kozela te ete ayebisaka yo makambo nyonso to yo mpe oyebisaka ye makambo nyonso. Soki oweli ete atyelaka kaka yo likebi okobebisa boninga na bino. *

Oyo bilenge mibali balobaka: “Soki elenge mwasi moko azali koluka koyeba makambo nyonso oyo nazali kosala mpe azali kokoka te kozala na baninga mosusu to kosala makambo mosusu soki ngai nazali te, elenge mwasi yango azali kotingamatingama ngai.”​—Darren.

“Soki elenge mwasi oyo nabandi boninga na ye sika azali ntango nyonso kotunatuna ngai mpe koluka koyeba soki nazali na nani, mingimingi soki azali koluka koyeba bankombo ya bilenge basi nyonso oyo tozali na bango, wana namonaka yango elembo ya mabe.”​—Ryan.

“Elenge mwasi oyo atikelaka yo ntango te ozala mpe na baninga na yo ya mibali mpe asilikaka ntango nyonso soki obengi ye te azala na yo, amonisaka ete akoki kosala makambo ye moko te soki yo ozali te, mwasi ya ndenge wana azali mwasi ya kosepela na ye te.”​—Adrian.

Yebá valɛrɛ na yo

Na ntembe te, oyebi bilenge basi oyo bakoki kosala nyonso kaka mpo na kobenda likebi ya elenge mobali to kosala nyonso mpo elenge mobali asepela na bango. Bamosusu bakoki kutu kondima kosala makambo oyo eyokani te na bizaleli ya malamu kaka mpo na kozwa mwa moto​—ata mpe mobali. Kasi, maloba oyo ete ‘okobuka oyo oloni’ ekoki kosalelama na likambo yango. (Bagalatia 6:7-9) Soki ozali komipesa kilo te mpe ozali kozwa na motuya te mitinda oyo olandaka, na ntembe te okobenda kaka mibali oyo bakozwa yo na kilo te; bakozwa mpe na kilo te mitinda oyo olandaka.

Ezali ya solo ete bilenge mibali nyonso te nde bakosepela na yo​—mpe yango ekoki kozala likambo ya malamu! Kasi, soki ondimi kobongisa kitoko na yo ya libándá mpe ya kati, okozala na “motuya monene na miso ya Nzambe.”​—mpe okobenda elenge mobali oyo abongi na yo.​—1 Petro 3:4.

Okokuta masolo mingi ya “Mituna oyo bilenge batunaka” na esika oyo na internet www.watchtower.org/ypf

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Talá mokapo 3 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, volimi 2 (na Lifalanse) ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 28 Ya solo, ntango elenge mobali ná elenge mwasi balakani libala, bazali na lotomo ya koyebisanaka makambo.

MAKAMBO YA KOKANISA

● Ndenge nini okoki komonisa ete omemyaka makanisi mpe ndenge oyo elenge mobali azali koyoka na motema?

● Ndenge nini okoki komonisa ete ozali komipesa kilo?

[Elilingi na lokasa 13]

Bolingo mpe limemya ezali lokola bapinɛ mibale ya velo​—nyonso mibale ezalaka na ntina