Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Naponaki mosala ya malamu koleka

Naponaki mosala ya malamu koleka

Naponaki mosala ya malamu koleka

Lisolo ya Plamen Kostadinov

EZALAKI pene na midi ntango nalamukaki. Milangi ya mpamba ezalaki bisika nyonso na nse, mpe basaani ya kotya putulu ya likaya ezalaki kolumba nsolo. Esengo nyonso oyo nazalaki na yango na fɛti lobi na butu, ezalaki lisusu te. Nazalaki na mawa mpe nayokaki ete nazali kaka ngai moko na ndenge oyo nayoká naino te. Namonaki lokola makambo nyonso ezali na ntina te! Tiká nayebisa bino ndenge nakómaki kuna.

Ntango nakómaki na mbula 14, nazalaki koyekola koyema. Ezalaki na eleko ya molunge ya 1980. Tata na ngai autaki koyebisa ngai ete bandimi ngai na eteyelo oyo bayekolaka koyema na Trojan, mboka moko na Bulgarie. Nasepelaki mingi. Na eleko ya ɔtɔne ya mbula yango, nalongwaki na mboka na biso Lovetch, mpe nakendaki na Trojan.

Nasepelaki kokende kofanda mosika na baboti na ngai mpo nasalaka oyo nalingi. Nabandaki komɛla likaya, mpe ntango mosusu, nazalaki kolangwa na baninga na ngai ya kelasi. Epekisamaki komɛla likaya ná masanga na eteyelo. Kobuka mibeko ezalaki kutu kosepelisa ngai mingi.

Mposa na ngai ya kosala mayemi ezalaki kaka kokóma makasi. Nayebaki koyema malamu, mpo mposa ya kozala moto ya lokumu ekolaki na motema na ngai. Nsima ya kotánga mbula 5 na Trojan, nalingaki kokoba kelasi na iniversite oyo bayekolaka koyema (académie des Beaux-Arts) na Sofia, engumba-mokonzi ya Bulgarie. Ezalaki eteyelo oyo elekaki lokumu na Bulgarie mobimba. Na 1988, nazalaki moko ya bana 8 mpamba oyo baponamaki na ekólo mobimba mpe bandimamaki na iniversite. Ematisaki ngai mapeka! Mokolo moko, namitalaki na talatala mpe nalobaki na lolendo boye: ‘Sikoyo, Plamen, ntembe ezali lisusu te ete okoyebana na mosala ya koyema!’

Ndenge nakómaki moto oyo nazalaki kala

Eumelaki te, nakómaki kolata bilamba ya moindo, mpe kokolisa nsuki ná mandɛfu. Bayemi bazalaki kosala bongo. Nalandaki bomoi oyo nakanisaki ete yango nde ebongi mpo na moyemi. Mpo na yango, nakómaki kofutela ndako na kartye ya bayemi mpe kotika yango mobulumobulu mpenza. Na nsima, nasombaki nyau moko ná bana na yango misato mpe mbwa moko ya moke. Nakómaki mpe na momeseno ya kobebisa mbongo na ngai.

Nzokande, mposa ya kokóma moyemi monene ekobaki kokola. Nazalaki koyema ntango nyonso, nazalaki kosala mayemi mpo na komonisa mokili kitoko oyo ezalaki na makanisi na ngai. Nazalaki kosala mayemi ata na bifelo ya ndako na ngai. Nazalaki komona ete yango ezalaki ebandeli ya kokóma moyemi monene.

Nazalaki kolekisa ntango na ngai mingi na bafɛti elongo na baninga na ngai ya kelasi. Tozalaki kosangana na ndako na ngai, koyoka miziki, mpe komɛla masanga mingi, ata ntango tozali kobongisa baekzamɛ. Tozalaki kopesana makanisi na makambo etali miziki, koyema, mpe ntina ya bomoi. Mbala mingi, tozalaki kolobela bilimo ya nguya mpe bikelamu oyo efandaka na baplanɛti mosusu (extraterrestres). Masolo yango ezalaki kotinda ngai nakanisa mpe kopesa ngai makanisi ya sika oyo nakobimisa na mayemi na ngai mbala ya nsima. Nazalaki kolinga mayoki wana ya esengo eumela, kasi nazalaki koyoka yango kaka soki nazali na kwiti. Mbala mingi, lobi na yango, esengo yango ezalaki lisusu te.

Nazalaki na bomoi ya ndenge wana mbula soki 10, kasi nazalaki kaka na esengo te. Na bokeseni na mayemi na ngai oyo ezalaki kongɛnga, motema na ngai ezalaki koyinda na kati, mpe nazalaki koyoka ete nazali kaka ngai moko. Mposa na ngai ya kokóma moyemi monene ekómaki kokita. Nanyokwamaki na makanisi mpe nayebaki te ndenge ya kotambwisa bomoi na ngai. Nde nakómaki na esika oyo nalobelaki na ebandeli.

Solo ebikisi ngai

Na 1990, nazwaki ekateli ya kolakisa mayemi na ngai na Lovetch. Nabengisaki Yanita, mwana mwasi moko oyo toyebanaki na ye na Sofia, aya kotala ndenge nakolakisa mayemi na ngai, mpo ye mpe azalaki moto ya Lovetch. Ntango nasilisaki kolakisa mayemi na ngai, ngai ná Yanita tokendaki na restora moko ya pembeni mpo na kosala mwa fɛti. Ntango tozalaki kosolola, abandaki koyebisa ngai makambo oyo azalaki koyekola na Biblia ná Batatoli ya Yehova. Ayebisaki ngai ete Biblia elaki mokili moko ya sika. Yango ebendaki likebi na ngai.

Yanita akobaki boyekoli na ye ya Biblia na Sofia, mpe azalaki mbala na mbala komemela ngai mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nakobosana ata moke te ndenge nasepelaki kotánga mwa buku “Talá! nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe ndenge nasilisaki kotánga buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis * kaka na mikolo moke mpamba. Ezalaki mpasi te mpo nandima ete Nzambe azali, mpe nalingaki mbala moko koyeba ndenge ya kobondela. Nayebi malamu libondeli na ngai ya liboso. Nafukamaki, mpe nayebisaki Yehova mitungisi na ngai nyonso. Esengo mpe kimya ya motema ebandaki koyela ngai.

Na Sofia, Yanita alakisaki ngai epai ya mwasi moko ná mobali na ye oyo bazalaki Batatoli ya Yehova. Basɛngaki ngai tóyekola Biblia mpe babengisaki ngai na makita. Nazali koyeba lisusu likita na ngai ya liboso na sanza ya Yuni 1991. Nakómaki ngonga mibale liboso mpe nafandaki na mwa parkɛ moko mpo na kozela. Nazalaki kobanga mpe komituna soki bakoyamba ngai malamu. Nakamwaki ndenge moto nyonso ayambaki ngai malamu atako nazalaki komonana ndenge bayemi bazalaka. Banda wana, nakómaki koyangana na makita nyonso mpe koyekola Biblia mbala mibale na pɔsɔ.

Nasepelaki mingi ntango nazwaki Biblia na ngai moko ya liboso. Ata mbala moko te na bomoi na ngai natángaki eloko moko ya malamu mpe oyo etondá na bwanya lokola oyo ezali na Lisolo Likoló ya Ngomba. Wana nazalaki kokoba na boyekoli na ngai, namonaki ngai moko ete Liloba ya Nzambe ekoki kobongola moto, ndenge emonisami na Baefese 4:23 ete: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino.” Natikaki komɛla likaya mpe nabongisaki molato mpe nsuki na ngai. Nabongwanaki makasi mpenza na boye ete mokolo moko ntango tata na ngai ayaki kozela ngai na gare ya train na Lovetch, alekaki ngai, mpo ayebaki ngai lisusu te.

Nabandaki mpe kotalatala esika oyo nazalaki kofanda. Ndako mobulumobulu, mayemi oyo nasalá na bifelo, mpe nsolo makasi ya likaya ezalaki lisusu kofungola ngai mayele te. Namonaki ete nasengeli kopɛtola makambo nyonso. Napakolaki bifelo langi ya mpɛmbɛ mpo na kobomba bikelamu ya miso misato oyo nayemaki na efelo.

Na yango, eumelaki te baninga na ngai bakimaki ngai, kasi mwa moke na nsima nazwaki baninga ebele kati na bato oyo nazalaki kokutana na bango na makita ya bokristo, mpe bazali baninga na ngai ya motema tii lelo. Lokola nakómaki na baninga ya malamu ndenge wana, nakolaki noki na elimo. Na mokolo ya 22 Marsi 1992, nazwaki batisimo na liyangani ya liboso ya Batatoli ya Yehova na Bulgarie, oyo esalemaki na engumba Plovdiv.

Nazongi na Lovetch

Atako nayebaki ete ekozala pɛtɛɛ te mpo moyemi azwa mbongo ya kobikela na engumba ya moke, nazwaki ekateli ete nsima ya diplome na ngai, nakozonga na Lovetch. Namonaki ete ekozala mpasi mingi komipesa na mosala ya koyema mpe kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ngai na mbala moko. Na yango, nazwaki ekateli ya koluka mosala mosusu mpe namipesaki mpo na koteya bato Biblia. Ntango nazalaki naino na iniversite, Yanita, oyo azwaki diplome mbula misato liboso na ngai, azalaki koteya Biblia na molende na Lovetch. Azalaki Motatoli kaka ye moko na mboka yango.

Ntango nazongaki na Lovetch, mwa etuluku moko ya bato bazalaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Nazalaki kosepela kokende kotala bato na ndako na ndako mpo na kopesa bango elikya oyo nakómaki na yango mpo na mikolo ezali koya. Nazwaki ekateli ya kokóma kosala mosala yango ntango nyonso.

Kasi nsima ya mikolo, mikakatano ebimaki. Na 1994, Leta apekisaki ebongiseli na biso mpe bapanzaki biso bansango ya lokuta na televizyo, na radio, mpe na bazulunalo. * Mbala mingi, polisi ezalaki kobenga Batatoli na biro ya polisi, mpe kobɔtɔla mikanda na biso. Na bantango wana ya mpasi, tokokaki te koyangana na makita na polele. Atako bongo, tozalaki kosala makita na biso pɔsɔ na pɔsɔ na ndako moko ya mɛtrɛ-karé soki 12, oyo ezalaki pembeni ya ndako ya Yanita. Mokolo moko, tokɔtisaki bato 42 na mwa ndako yango. Na yango, mpo na kotya bato ya pembeni makɛlɛlɛ te, tozalaki kokanga maninisa ntango tozalaki koyemba banzembo ya Bokonzi. Na bantango mosusu, soki moi ebimi makasi, ndako yango ezalaki kokóma molunge makasi, kasi tozalaki na esengo ya koyangana esika moko.

Mapamboli ya Yehova

Nazalaki kosepela mingi na molende ya Yanita mpo na losambo ya solo, mpe nsima ya mikolo, tolinganaki. Tobalanaki na mokolo ya 11 Mai 1996. Atako tozali na bomoto ekeseni, tosalisanaka malamu mpenza. Azali moninga na ngai ya motema mpe mosungi na ngai. Nazali na botɔndi epai ya Yehova ndenge apesá ngai mwasi oyo “motuya na ye eleki mosika oyo ya mabanga kitoko ya korai.”​—Masese 31:10.

Baninga na ngai mosusu bakobaki na mosala ya koyema, mosala oyo ngai mpe nalingaki kosala kala. Kasi, nazali na esengo ndenge naponaki mosala oyo eleki malamu. Nasalisi bato mingi báyeba ntina ya bomoi, mpe bazali lelo bandeko na ngai ya elimo. Lokumu nyonso oyo nalingaki kozwa na mosala ya koyema ekokani te na mapamboli oyo nazwi na mosala ya Yehova. Nazali na esengo ndenge nakómá moninga ya Yehova Nzambe, Moyemi monene.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Nyonso mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova. Buku Bomoi ya seko ebimisamaka lisusu te.

^ par. 22 Na 1998, nsima ya kosamba liboso ya tribinale ya Strasbourg (Cour européenne des droits de l’homme), Leta ya Bulgarie endimaki lisusu ebongiseli ya Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 28]

Ná mwasi na ngai Yanita