Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moninga mabe

Moninga mabe

Moninga mabe

Azali “moninga” moko oyo boyebanaki ntango ozalaki naino elenge. Azalaki kotinda yo omiyoka ete okoli mpe ondimami na bilenge mosusu. Soki okómi na mitungisi, okokaki ntango nyonso koluka ye mpo apesa yo mwa “makasi.” Kutu, okómaki koluka lisalisi na ye na makambo mingi.

Kasi na nsima, oyaki komona makambo na ye ya mabe. Alingi kozala na yo ntango nyonso, ata soki kozala na ye na bisika mosusu ezali kobimisa yo mabe. Mpe ata soki asalisaki yo omiyoka ete okoli, abebisi mpe nzoto na yo. Longola yango, ayibá ndambo ya mbongo oyo ozwaka na mosala.

Kala te outi komeka kokata boyokani ná ye, kasi alingi kotika yo te. Tokoki koloba ete okómi moombo na ye. Obandi koyoka mawa ndenge boyebanaki na ye.

WANA ezali boyokani oyo bato mingi bazalaka na yango na likaya. Nsima ya komɛla likaya mbula 50, mwasi moko na nkombo Earline alobi boye: “Kozala na likaya ezalaki kosalisa ngai mingi koleka kozala na moto mosusu. Likaya ezalaki kaka moninga na ngai ya kala te​—na bantango mosusu yango moko kaka nde ezalaki moninga na ngai.” Kasi, ndenge Earline ayaki komona yango, likaya ezali moninga ya mabe mpe oyo akoki komemela moto likama. Kutu, maloba wana ya ebandeli etali mpenza Earline​—longola kaka likambo moko. Ntango ayebaki ete komɛla likaya ezali mabe na miso ya Nzambe mpo ebebisaka nzoto oyo Nzambe apesá biso, atikaki momeseno yango.​—2 Bakorinti 7:1.

Mobali moko na nkombo Frank mpe azwaki ekateli ya kotika likaya mpo asepelisa Nzambe. Kasi, mokolo soki moko nsima ya komɛla likaya na ye ya nsuka, ayaki komona ete azali konguluma na ndako na ye mpo na koluka biteni ya makaya oyo ekweákweá na kati ya mabaya. Frank alobi boye: “Na ntango wana nde nazwaki ekateli. Ntango nayaki komona ete nazali konguluma na nse mpe kolukaluka biteni ya makaya ya kala, namiyokaki mbindo. Banda wana, namɛlá lisusu likaya te.”

Mpo na nini ezalaka mpasi kotika likaya? Minganga bamoni bantina mingi: (1) Likaya ekoki kokómisa moto moombo ndenge bangi esalaka. (2) Nicotine oyo ekɔti na nzoto ekoki kokóma na bɔɔngɔ nsima ya seconde nsambo mpamba. (3) Mbala mingi komɛla likaya ekómaka momeseno na bomoi ya moto, mpo akomɛla yango ntango azali kolya, komɛla masanga, kosolola na baninga, mpo na kolongola mitungisi, mpe bongo na bongo.

Kasi, ndenge Earline ná Frank bamonisi yango, moto akoki kolongwa na boombo yango ya mabe. Soki yo mpe omɛlaka likaya kasi olingi kotika yango, kotánga masolo oyo elandi ekoki kosalisa yo obanda bomoi ya sika.