Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nsuka ya mokili ezali kobangisa bato mingi

Nsuka ya mokili ezali kobangisa bato mingi

LONGOLA makanisi mpamba oyo elobelami na lisolo eleki, ezali mpe na makambo oyo esengeli tótyela likebi. Bato mingi bazali kobanga mpo motángo ya bato ezali kobakisama mingi mpe yango ekobimisa kozanga ya mai mpe ya bilei. Bato mosusu bakómi kobanga mpo na kokwea ya nkita na mokili mobimba. Tokoloba nini mpo na makama oyo euti na mpela, mipɛpɛ, to koningana ya mabele, bamaladi ya mabe to etumba ya nikleere? Makambo yango ekoki nde koboma mokili?

Tótalela mwa makambo oyo ekoki kosala ete mokili esuka. Makambo yango nyonso te nde ekoki koboma bato nyonso na mabele, kasi ezali komonana ete ekoki kosukisa bomoi. Makambo yango ezali na ndakisa:

Bavolka ya minene koleka

Na mobu 1991, na ekólo Philippines, Pinatubo, ngomba moko oyo esanzaki mɔtɔ, ebomaki bato 700 mpe bato nkóto 100 bazangaki bisika ya kofanda. Lipata monene ya putulu ya mɔtɔ emataki kilomɛtrɛ 30 na likoló mpe na nsima ekweaki na mabele, ezipaki milona mpe ebukaki bandako. Pinatubo mpe bangomba mosusu oyo esanzaka mɔtɔ esalaka ete mopɛpɛ, molunge, mai to malili ebongwana na boumeli ya bambula mingi na nsima.

Soki volka (ngomba oyo esanzaka mɔtɔ) ya monene koleka ebimisi mɔtɔ, lokola oyo esalemaki kala mpenza, ekoki kozwa etando monene koleka mbala nkama bavolka mosusu mpe kosala mabe mingi koleka. Longola makama oyo ebimaka mbala moko ntango volka esanzi mɔtɔ, yango esalaka mpe ete mopɛpɛ, molunge, mai to malili ebongwana; milona ebota malamu te, bilei ezanga, mpe bato mingi bákufa na nzala.

“Bavolka ebomaka milona mpe banyama bakilomɛtrɛ mingi zingazinga na yango; Bavolka ya minene koleka ezali kosilisa mitindo mosusu ya nzete mpe ya nyama na ndenge ezali kobongola mopɛpɛ, molunge, to malili na mokili mobimba.”​—Zulunalo “National Geographic.”

Mabanga oyo euti na likoló

Na mobu 1908, na Vanavara, mboka moko na ekólo Sibérie, mobali moko afandaki na kiti na veranda ya liboso mpe eloko moko elongolaki ye na kiti na nguya moko makasi. Ayokaki lokola simisi na ye ezali kozika na mɔtɔ. Nguya na yango epalanganaki kilomɛtrɛ soki 60 zingazinga. Eutaki na eloko moko lokola libanga oyo babengi astéroïde, oyo ezalaki monene soki mɛtrɛ 35 mpe ezalaki na kilo milio 100. Ntango eloko yango ezalaki kokatisa etando ya mabele, epanzanaki mpo na molunge makasi mpe nguya na na yango ebimaki. Nguya oyo ebimaki ntango eloko yango epanzanaki elekaki nguya ya bɔmbi ya Hiroshima mbala nkóto moko, mpe ebebisaki zamba na ntaka ya kilomɛtrɛ-karé nkóto mibale. Na ntembe te, astéroïde ya monene koleka ekoki kobimisa mɔtɔ makasi mpenza, mpe nsima na yango molunge ekoki kokita mpenza na mokili mobimba mpe kosilisa banyama mpe banzete mingi.

“Banda kala, mabanga oyo eutaka na likoló ekweaka mbala na mbala na mabele. Atako lelo oyo ekweaka lisusu mingi te, tóyeba ete ekokwea kaka. Kasi toyebi te ntango nini.”​—Chris Palma, profɛsɛrɛ moko na iniversite ya Pennsylvanie, oyo ateyaka makambo etali minzoto mpe biloko ya likoló.

Kobakisama ya molunge mpe ya malili

Bato ya mayele balobi ete ndenge mabele ezali kokóma molunge makasi, mbu ya mabanga ezali se konangwa, biloko mosusu oyo ezalaka na nse ya mai ezali kokufa, mpe mitindo mosusu ya bikelamu ya bomoi ezali kosila, nyonso wana esali ete molunge mpe malili ebakisama. Atako makanisi ndenge na ndenge ezali kobima mpo na likambo yango, mingi balobi ete euti na kotumba makala (charbon), mafuta, mpe biloko mosusu. Na ndakisa biloko ya kala oyo bakundolaka ezali komatisa mopɛpɛ babengi gaz carbonique mingi na likoló, ezala mituka mpe baizine.

Bato mosusu ya mayele bamonisi ete makambo wana ezali kotinda mɔtɔ mingi na etando mpe kobakisa molunge na mabele. Lokola banzete ebendaka mopɛpɛ babengi gaz carbonique, kokata bazamba ya minene ekoki mpe kosala ete molunge mpe malili ebakisama.

“Bato mingi ya mayele bamoni ete soki ndenge oyo molunge ezali kobakisama boye ekobi mpe gaz carbonique ekobi kobima mingi, awa na mabele molunge ekokoba kobakisama, mpe mpo na yango makambo mingi ekobongwana mpe nivo ya mai ya mbu ekomata mpe ekozala mpasi bato báfanda lisusu zingazinga na yango.”​—Zulunalo “A Mind for Tomorrow: Facts, Values, and the Future.”

Kopalangana ya bamaladi mabe

Na siɛklɛ ya 14, maladi babengi peste noire epalanganaki kaka na mbula mibale mpamba mpe ezwaki moto moko kati na bato misato na mikili ya Mpoto. Kobanda mobu 1918 tii 1920, maladi babengi Grippe espagnole ebomaki bato soki milio 50. Lokola kala kosala mibembo ezalaki mpasi, maladi yango epalanganaki mpenza te. Nzokande, lokola lelo oyo bingumba ekómi mingi mpe bato bazali kosala mibembo bipai na bipai, maladi mosusu ya ndenge wana ekoki kopalangana noki na mokili mobimba.

Maladi yango ekoki kouta na biloko oyo ekelamá. Kasi tóyeba mpe ete bato bazali kobimisa bamaladi mosusu. Minganga oyo bayekolaka bamaladi oyo bato babimisi balobi ete mwa bato mosusu ya mayele mabe bakoki kobimisa bisaleli ya Internet oyo ezali na mikrobe oyo ebomaka.

“Bamaladi oyo ebimaka yango moko ezali se koboma bato; kasi soki moto moko ya mayele mabe azwi mikrobe ya bamaladi yango, to asali mikrobe mosusu to mpe mikrobe oyo ekufaka te na bankisi, yango ekoki koboma ebele ya bato.”​—Centre de recherche sur les armes de destruction massive.

Kolimwa ya banyama mpe milona mosusu ya ntina

Na bambula mitano oyo euti koleka, bato oyo babɔkɔlaka banzoi na États-Unis babungisaki banzoi mingi (30%); na bisika mingi na mokili, mbula nyonso bituluku ya banzoi ezali kolimwa na ndenge ya kokamwa. Nzoi esuki kaka te na kopesa biso mafuta, kasi esalisaka mpe na kobotisa milona lokola masango, bapɔme, soya, mpe ntokia (coton). Nzoi ezali mpenza na ntina na bomoi na biso.

Bikelamu mosusu ya bomoi oyo ezalaka na nse ya mai ezali mpe na ntina. Soki yango ezali te mbisi mpe ekozala te. Lisusu, soki misɔpi ezalaka na mabele te, milona elingaki kobota mingi te. Ntango bikelamu ya ndenge wana ezali kolimwa, bilei ezali komonana mingi te mpe bato bazali kokufa nzala. Kobeba ya mopɛpɛ, kobakisama ya motángo ya bato, ndenge bato bazali kosalela mabele na ndenge ya mabe, mpe kobakisama ya molunge mpe ya malili ezali kosala ete banyama mosusu elimwa mbala nkóto moko koleka ndenge ezalaki liboso.

“Mbula na mbula, mitindo kobanda 18 000 tii 55 000 ya bikelamu mosusu ezali kolimwa. Nyonso wana mpo na misala ya bato.”​—Lapolo ya Programme des Nations unies pour le développement.

Etumba ya nikleere

Soki bɔmbi moko ya nikleere ekwei na engumba moko ekoki kobebisa yango na miniti moke; likambo yango esalemaki na sanza ya Mwambe ya mobu 1945. Kokwea ya bɔmbi ya nikleere ezalaka na nguya moko ya mabe mpenza, mopepe mpe molunge na yango oyo ezalaka mɔtɔ makasi, ebebisaka, ebomaka mpe ezipaka kongɛnga ya moi. Yango ebebisaka bilei mpe mai. Etumba ya nikleere ematisaka libondo ya putulu na likoló mpe ezipaka kongɛnga ya moi mpe epesaka malili makasi. Milona oyo ebotaka mbuma mpe milona mosusu ekoki kokufa. Soki banyama mpe bato bazangi bilei, bakoki kokufa na nzala. Elobami ete bikólo libwa ezali na likoki ya kobimisa bitumba ya nikleere. Mwa bikólo mosusu mpe ezali koluka kobimisa bibundeli na bango moko ya nikleere. Lisusu, bibongiseli ya bateroriste ezali ntango nyonso pene ya kozwa bibundeli yango.

“Bibundeli ya nikleere ezali likama eleki monene mpo na libota ya bato. . . . Tii sikoyo ezali na bibundeli ya nikleere soki 25 000 na mokili mobimba . . . Nsukansuka, bateroriste bakozwa bibundeli yango.”​—Ebongiseli babengi Union des scientifiques responsables.