Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya kozala moyoki malamu

Ndenge ya kozala moyoki malamu

MOKAKATANO

Molongani na yo alobi, “Oz’oyoka ngai te!” Na nse ya motema olobi: ‘Kasi nazalaki koyoka ye.’ Emonani ete oyo oyokaki ekeseni na oyo molongani na yo alobaki. Yango esali ete koswana mosusu ebima.

Okoki kokima matata ya ndenge wana. Kasi liboso, osengeli koyeba mpo na nini okoki koyoka te makambo mosusu ya ntina oyo molongani na yo alobi, ata soki okanisi ete ozali koyoka ye.

NINI ESALAKA BONGO?

Likebi na yo ekei epai mosusu, olɛmbi, to nyonso mibale. Bana bazali koganga, televizyo ezali kotya makɛlɛlɛ, mpe ozali kokanisa likambo moko oyo ekómelaki yo na mosala. Sikoyo molongani na yo abandi koloba na yo​—na ndakisa, bokoyamba bapaya na mpokwa. Oningisi motó mpo na komonisa ete ondimi, kasi oyoki mpenza makambo oyo alobaki? Mbala mosusu oyoki te.

Ozweli ye makanisi mabe. Omoni ete ezali na likambo mosusu oyo ebombani na maloba ya molongani na yo; nzokande ozali kokanisela ye mabe mpamba. Na ndakisa, kanisá ete molongani na yo alobi: “Olekisi ntango mingi lisusu na mosala pɔsɔ oyo.” Okanisi ete azali kopamela yo, mpe olobi: “Eza foti na ngai te! Esengeli nasalaka nsima ya ngonga ya mosala mpo obatelaka mbongo te.” Molongani na yo agangi: “Nazali kopamela yo te!”​—Alingaki kaka kosɛnga yo bólekisa mwa wikende elongo.

Oluki kosilisa likambo nokinoki. Marcie * alobi boye: “Na bantango mosusu, nalingaka kaka kobimisa oyo nazali koyoka na motema, kasi Mike alingaka koyebisa ngai ndenge ya kosilisa likambo yango. Nazali na mposa ya kosilisa yango te. Nalingi kaka ayeba ndenge nazali komiyoka.” Mokakatano ezali wapi? Mike azali kokanisa kosilisa likambo yango nokinoki. Yango ekoki kosala ete ayoka mpenza te makambo mosusu to nyonso oyo Marcie azali koloba.

Ata soki ezali mpo na likambo nini, ndenge nini okoki kokóma moyoki malamu?

OKOKI KOSALA BOYE

Landá mpenza makambo oyo azali koloba. Molongani na yo alingi koyebisa yo likambo moko ya ntina, kasi ozali na ntango ya koyoka ye? Ntango mosusu te. Ekoki kozala ete ozali kokanisa makambo mosusu. Soki ezali bongo, kosala te lokola ozali koyoka. Soki esengeli, tiká naino makambo oyo ozali kosala mpe landá mpenza oyo molongani na yo azali koloba, to okoki kosɛnga ye azela tii ntango okosilisa.​—Toli ya Biblia: Yakobo 1:19.

Bóloba moto na moto na ngala na ye. Soki ekómi ngala na yo ya koyoka, koluka te kokata molongani na yo maloba to koboya likambo oyo azali koloba. Yo mpe okoloba na ngala na yo. Mpo na sikoyo, yoká ye kaka.​—Toli ya Biblia: Masese 18:13.

Tuná mituna. Yango ekosalisa yo oyeba malamu oyo molongani na yo azali koloba. Marcie oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nasepelaka ntango Mike azali kotuna ngai mituna. Namonaka ete azali kotya likebi na makambo oyo nazali koloba.”

Yoká mpenza oyo alingi koloba, kosuka kaka na maloba te. Luká koyeba oyo alingi koloba na bajɛstɛ, elongi, miso mpe mongongo na ye. Maloba “Eza malamu” ekoki kolimbola mpenza “Eza malamu te,” na kotalela ndenge oyo elobami. Maloba “Osɛngaka ngai ata mokolo moko te ete osalisa ngai” ekoki kolimbola mpenza “Namoni ete ozwaka ngai na valɛrɛ te.” Luká koyeba mpenza oyo alingi koloba, ata soki alobi yango te. Soki bongo te, bokobanda kobendana mpo na makambo oyo alobaki na esika otya makanisi na oyo alingaki koloba.

Kobá koyoka ye. Koboya koyoka te mpe kolongwa wana te, ata soki makambo ozali koyoka ezali kosepelisa yo te. Na ndakisa, okosala nini soki molongani na yo azali kolobela yo mabe? Gregory, oyo abalá eleki sikoyo mbula 60 apesi toli oyo: “Kobá koyoka ye. Landá mpenza oyo molongani na yo azali koloba. Yango esɛngaka moto amonisa ete akɔmɛli, kasi ekomemela yo matomba.”​—Toli ya Biblia: Masese 18:15.

Tyelá mpenza molongani na yo likebi. Koyoka na likebi ezali kaka te mwa tekiniki moko boye, kasi emonisaka mpenza bolingo. Soki ozali mpenza kotya likebi na oyo molongani na yo azali koloba, ekozala lisusu mpasi te obanda koyoka ye. Na ndenge yango, okolanda toli oyo ya Biblia: “Moto moko té áluka bolamu na ye moko, kasi moto nyonso áluka bolamu ya bandeko.”​—Ba-filipien [Bafilipi] 2:4, Bible na lingala ya lelo oyo.

^ par. 9 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.