Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI KOKOBA KOZALA NA BOMOI?

Mpo lisalisi ezali

Mpo lisalisi ezali

‘Bwakelá [Nzambe] mitungisi na yo, mpo atyelaka yo likebi.’​—1 PETRO 5:7.

Okoki komona ete liwa ezali malamu koleka kozala na bomoi soki omoni ete ezali na likambo moko te oyo okoki kosala mpo na kosilisa mikakatano na yo. Kasi talá mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo.

Libondeli. Libondeli ezali wana kaka te mpo na kosalisa yo omiyoka malamu; ezali mpe te eloko moko oyo tosengeli kosala mpo tozangi elikya. Ezali lisolo elongo na Yehova Nzambe, oyo atyelaka yo likebi. Yehova alingaka ete oyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa yo. Kutu, Biblia elobi boye: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.”​—Nzembo 55:22.

Mpo na nini te kosolola na Nzambe na libondeli? Salelá nkombo na ye, Yehova, mpe yebisá ye makambo oyo ezali na motema na yo. (Nzembo 62:8) Yehova alingi ete oyeba ye mpe okóma moninga na ye. (Yisaya 55:6; Yakobo 2:23) Libondeli ezali lolenge ya kosolola oyo okoki kosalela yango ntango nyonso mpe na esika nyonso.

Ebongiseli moko ya Amerika oyo esalisaka bato mpo bámiboma te elobi ete “baankɛtɛ emonisaki ete ebele ya bato (90%) oyo bamibomaki bazalaki kobɛla maladi moko ya motó na ntango ya liwa na bango. Nzokande, mbala mingi maladi yango eyebanaki te, basalaki ekzamɛ te mpo na koyeba yango to mpe basalisaki yango malamu te”

Bato oyo batyelaka yo likebi. Bomoi na yo ezali na ntina mpo na bato mosusu; ata epai ya bato ya libota to baninga oyo mbala mosusu bamitungisaka mpo na yo. Bato mosusu oyo batyelaka yo likebi ekoki mpe kozala bato oyo okutaná naino na bango te. Na ndakisa, na bantango mosusu, na mosala na bango ya kosakola, Batatoli ya Yehova bakutanaka na bato oyo bazangi elikya, bato yango mosusu bandimaka ete bazalaki lisusu na elikya te ete bakozwa lisalisi mpe bamonaki malamu bámiboma. Kosakola ndako na ndako epesaka Batatoli ya Yehova libaku ya kosalisa bato ya ndenge wana. Lokola balandaka ndakisa ya Yesu, Batatoli ya Yehova batyelaka bato oyo bafandi na bango likebi. Batyelaka yo mpe likebi.​—Yoane 13:35.

Lisalisi ya minganga. Mbala mingi makanisi ya komiboma emonisaka ete moto azali na maladi moko na motó, na ndakisa konyokwama na makanisi. Ezali likambo ya koyoka nsɔni te soki ozali na maladi ya makanisi; ata mpe soki nzoto ezali kotungisa yo. Kutu konyokwama na makanisi babengaka yango “miyoyo oyo bato mingi bazalaka na yango na makanisi.” Moto nyonso akoki kozwa yango​—mpe ezali na nkisi oyo ekoki kosilisa yango. *

KOBOSANA LIKAMBO OYO TE: Mbala mingi koluka kosilisa likambo yango na makasi na yo moko esimbaka te. Kasi okoki kolonga soki bato mosusu basalisi yo.

OYO OKOKI KOSALA LELO: Luká monganga oyo ayebi mpenza kosalisa maladi ya motó na ndakisa maladi ya makanisi.

^ par. 8 Soki mposa ya komiboma ezali makasi to ezali kosila te, kendá na lopitalo. Kuna okokuta bato oyo bayekolá ndenge ya kosalisa bato oyo bazali kotungisama ndenge wana.