Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI KOKOBA KOZALA NA BOMOI?

Mpo elikya ezali

Mpo elikya ezali

“Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—NZEMBO 37:11.

Biblia emonisi ete bomoi ‘etondi na mpasi.’ (Yobo 14:1) Lelo oyo, moto nyonso akutanaka na likambo boye to boye ya mpasi. Kasi bato mosusu bazalaka lisusu na elikya ata moko te na bomoi, lokola nde makambo ekoki kobonga lisusu te, bazali na elikya te ete mokolo mosusu bakoki kozala na bomoi ya malamu. Yo mpe okanisaka bongo? Soki ezali bongo, yebá ete Biblia epesi elikya moko kitoko kaka te mpo na yo moko, kasi mpe mpo na bato nyonso. Na ndakisa:

  • Biblia eteyaka ete Yehova Nzambe alingaki ete tózala na bomoi ya malamu mingi.​—Ebandeli 1:28.

  • Yehova Nzambe alaki ete akokómisa mabele paradiso.​—Yisaya 65:21-25.

  • Elaka yango ekokokisama mpenza. Emoniseli 21:3, 4 elobi boye:

    “Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”

Elikya yango ezali te mwa makanisi moko boye. Yehova Nzambe akani mpenza kokokisa yango, mpe azali na nguya mpe na mposa ya kosala yango. Elikya oyo Biblia epesi ebongi kotyelama motema, mpe epesi eyano na motuna oyo ya ntina: “Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?”

KOBOSANA LIKAMBO OYO TE: Atako makanisi na yo ekoki koyengayenga to kokende epai na epai lokola masuwa oyo ezali likoló ya mbu oyo mbonge ezali kobɛtabɛta yango, elikya oyo Biblia epesi ekoki kokokana na longo oyo etɛlɛmisaka masuwa.

OYO OKOKI KOSALA LELO: Bandá koluka koyeba oyo Biblia eteyaka mpo na elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo. Okoki kokutana na bango na esika ofandaka to kokɔta na site na bango jw.org mpo na koyeba makambo mosusu. *

^ par. 11 Likanisi: Kɔtá na site jw.org mpe fungolá esika bakomi MIKANDA > MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET. Na esika yango, luká maloba lokola “kotungisama na makanisi” to “komiboma” mpo na koyeba makambo mosusu.