Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Mokili

“Mbula na mbula, bana soki milio 3 bakufaka na sanza ya liboso oyo babotami, mingi bakufaka na makambo oyo bakokaki kosala ete ekómela bango te. Mingi na bango (1/3) bakufaka kaka na mokolo ya liboso oyo babotami.”​—Save the Children International.

Grande-Bretagne

Na 2011 ebongiseli moko (Public Health England) elobaki ete kobeba ya mopɛpɛ esali ete motángo ya bato oyo bazali kokufa ebakisama na bingumba 15 ya Londres. Likambo ya kokamwa, balobi ete mazuti ezali mabe mingi te mpo esilaka noki te soki batye yango na motuka mpe ebimisaka gaz carbonique mingi te. Nzokande, kobeba mingi ya mopɛpɛ (91%) na bingumba yango, ezali nde mpo na mituka oyo esalelaka mazuti.

Russie

Ankɛtɛ oyo ebongiseli moko (Russia’s Public Opinion Foundation) esalaki na 2013, emonisaki ete bato mingi ya Russie (52%) oyo balobaki ete bazali bandimi ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse balobaki ete batángá ata eteni moko te ya Biblia, mpe bato mosusu (28%) balobaki ete babondelaka mpenza te.

Afrika

Lapolo moko oyo Banque mondiale esalaki emonisi ete lokola eyebani te soki esika boye to boye ya kosala bilanga ezali ya nani, yango ezali kosala ete mosala ya bilanga ekende liboso te mpe bobola ebakisama. Ndambo ya mabele epai basalá naino bilanga te na mokili mobimba, elingi koloba hektarɛ milio 202, ezali na Afrika epai (25%) ya mabele na yango bakoki kosalela yango mosala ya bilanga to kobɔkɔla bibwele.

États-Unis

Biteyelo mpe bainiversite mosusu ezali kolongola babuku mpe kotya na esika na yango baaparɛyi mosusu (tablette électronique) oyo ezali na makambo mingi ya kotánga mpe baprogramɛ mosusu. Atako kosala bongo ezali na litomba mingi, kasi bato mingi bazali kotyela yango motema mpenza te.