Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

États-unis

Bapolisi mosusu bazali kosalela baaparɛyi mpo makama ezala mingi te ntango bazali kolanda mituka oyo ebuki mibeko ya nzela. Moko na yango ezali oyo ezalaka na mopɛpɛ mpe bakangisaka yango liboso ya mituka na bango. Mwa aparɛyi yango oyo babengi (GPS-trackable) ekangamaka na motuka oyo bazali kolanda. Na ndenge yango, bakoki kolanda motuka yango na vitɛsi oyo ebongi.

Inde

Baankɛtɛ emonisi ete babomaka mwasi moko nsima ya ngonga nyonso mpo na matata oyo ebimaka mpo na mbongo ya libala. Atako mibeko ya Leta epekisi likambo ya kozwa to kopesa mbongo ya libala ndenge wana, na 2012 babomaki basi koleka 8 200 mpo mibali to mabota na bango bamonaki ete mbongo ya libala oyo bapesaki bango ezalaki moke.

Suisse

Mwa aparɛyi ya moke mpenza oyo bakangisaki bandɛkɛ misato oyo babengi martinet na zumbu na bango emonisi ete bandɛkɛ yango epumbwaka kozanga kopema mikolo koleka 200 ntango ezali kosala mobembo na Afrika. Liboso, bazalaki kokanisa ete kaka banyama ya mai nde esalaka bongo.

Afrika ya ɛsti

Bato ya mobulu bakangaki bamasuwa 179 na Afrika ya Ɛsti kobanda na sanza ya 04/2005 tii na sanza ya 12/2012. Ankɛtɛ moko oyo Banque mondiale esalaki emonisi ete bato yango basɛngaki badolare koleka milio 413 mpo bátika bamasuwa yango.