Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Bélize

Mobembo moko na Bélize

BÉLIZE ezali na biloko ndenge na ndenge na mwa eteni moke na yango ya mabele​—ezali na bazamba minene mpe bamai oyo ezali pembenipembeni ya ebele ya bisanga na yango. Kasi biloko wana nyonso ezali kaka mwa ndambo ya biloko kitoko ya Bélize.

Ekólo yango ezali na ebele ya bandɛkɛ mpe banyama ya ndenge na ndenge. Na banyama to bandɛkɛ yango tokoki kotánga ndɛkɛ babengi toucan oyo ntolo na yango ezali na langi ya mosaka, nyama babengi tapir oyo zolo na yango ezali lokola oyo ya kánga (rhinocéros) mpe ekoki kotambola mbangu na mabele mpe na nse ya mai! Ezali mpe na nyama oyo ezalaka lokola nkoi (jaguar). Kutu, Bélize ezali esika ya liboso na mokili epai nyama yango ezalaka mingi.

Bélize ezali esika ya liboso na mokili epai nyama babengi jaguar ezalaka mingi

Liboso Bélize ezalaki mboka ya Ba-Maya. Bato ya Espagne oyo bazalaki kozwa bamboka ya bato bakómaki na Bélize na siɛklɛ ya 16 kasi balongaki mpenza Ba-Maya te. Na nsima, Grande-Bretagne ebɔtɔlaki mboka yango mpe na 1862 Honduras britannique ekómaki kokonza Bélize. Na 1981, Bélize ezwaki lipanda.

Bélize esangisi bato ya ndenge na ndenge. Bato ya libosoliboso ya Bélize ezali Ba-Créole, bato ya ɛsti ya Inde, Ba-Garifuna, Ba-Maya mpe Ba-Métis. Bato yango bazalaka na boboto mpe na limemya. Ntango bana bazali koloba na mikóló, mbala mingi basalelaka liloba “madame” to “mesye” mpe bayanolaka boye, “ɛɛ, mama” to “te, papa.”

Zando na Belize City

Masangá ya Batatoli ya Yehova ya monɔkɔ ya bajɛstɛ ya Amerika, ya Bas-allemand, ya Bélize Kriol, Espagnol, ya Lingelesi, ya Mandarin (chinois), mpe ya Maya ezali na Bélize. Na 2013, na bato 40 ya Bélize, moko na bango ayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Kristo elongo na Batatoli ya Yehova.

OYEBAKI YANGO? Ngomba ya mabanga ya korai ya Bélize ezali na molai ya kilomɛtrɛ koleka 290. Yango ezwi esika ya mibale na mokili mobimba.Yango ezwami na kati ya barrière de corail ya mibale ya monene na mokili nsima ya Grande Barrière de Corail ya Australie.

Ngomba ya mabanga ya korai ya Bélize ezwami na kati ya barrière de corail ya mibale ya monene na mokili