Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Basali-bilanga oyo epumbwaka na bazamba minene ya mikili ya molunge

Basali-bilanga oyo epumbwaka na bazamba minene ya mikili ya molunge

MOSALI-BILANGA nyonso ayebaka ete mpo mosala na ye ebimisa mbuma malamu esengeli alona mboto na esika mpe na ngonga oyo ebongi. Kasi likambo ya kokamwa, mosala mosusu ya kolona oyo ebimisaka mbuma malamu koleka na bazamba ya mikili ya molunge esalemaka nde na butu ntango basali-bilanga yango ezali kopumbwa. Basali-bilanga yango oyo elonaka mbuma ezali nde bangembo oyo elyaka bambuma, oyo eyebani na nkombo renard volant. *

Kopalanganisa mboto

Bangembo yango mingi elukaka banzete oyo ezali na bambuma ya kitoko to bafololo oyo ezali na mai mingi ya sukali na bazamba yango na butu . Ntango ezali kopumbwa mpo na koluka bilei, esumbaka misuni mpe mboto ya mbuma oyo estoma na yango ekoki konika te. Mpo na kosilisa mosala na yango ya kolona, ememelaka bafololo mwa pudrɛ oyo ebotisaka yango ntango ebendaka mai ya sukali na bafololo, oyo yango elingaka mingi.

Lokola bangembo yango ekoki kopumbwa ntaka molai butu mobimba, ekoki kobwaka mboto na eteni monene ya mabele. Lokola bangembo esumbaka mboto mosusu oyo yango elyaka, epesaka mpe mabele “vitamini” oyo esalaka ete mboto ekola. Na yango, tokoki kokamwa te soki banzete ndenge na ndenge ya bazamba ya mikili ya molunge ezalaka na mposa ya bangembo mpo ememela bafololo pudrɛ oyo ebotisaka yango to epalanganisa mboto.

Lokola ekendaka mosika ntango ezali kopumbwa, bangembo yango esengeli kozala na mayele ya kopumbwa mpe miso oyo emonaka malamu mpenza. Ekoki komona malamu na molili koleka miso ya moto. Ekoki kutu kokesenisa balangi mosusu. Ekoki kopumbwa ezala na butu to na moi kozanga mokakatano.

Bomoi na yango

OYEBAKI YANGO? Nakokesana na bangembo mosusu, oyo elyaka mbuma eyebaka te esika oyo bilei na yango ezali na kolanda mayele oyo banyama mosusu esalelaka (écholocation), miso mpe zolo na yango nde esalisaka yango. Miso minene na yango ebongi mpenza mpo na kosalisa yango na mosala oyo esalaka na butu

Lolenge mosusu ya ngembo esalaka makambo esika moko bomoi na yango mobimba. Ndenge bamonaki yango epai ya bangembo mosusu, oyo ya basi ebatelaka bana na yango malamu, etambolaka nzela moko na bana yango na boumeli ya mwa bapɔsɔ mpe emɛlisaka yango tii ntango ekoli. Mpo na lolenge mosusu mibale ya bangembo, “oyo ya mwasi” ekoki kutu kozwa lisungi epai ya ngembo mosusu ya mwasi ntango ezali kobota.

Likambo ya mawa, bangembo mingi elingi kolimwa, mingimingi mpo bisika oyo yango efandaka ezali kobebisama. Na bisanga ya sudi ya Pasifike, kolimwa ya bangembo ekozala mabe mpenza mpo banzete mosusu ya bisanga yango ekoki te kobota soki bangembo ememeli yango te pudrɛ oyo ebotisaka yango. Na ntembe te, mosala ya basali-bilanga wana oyo epumbwaka ezali ya kozwa na lisɛki te.

^ par. 2 Ngembo yango ezalaka na Afrika, Azia, Australie mpe na bisanga mosusu ya Pasifike.