Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | KOLONGA YA SOLOSOLO ELIMBOLI NINI?

Oyo okoki kosala mpo olonga mpenza

Oyo okoki kosala mpo olonga mpenza

Biblia elendisaka biso tótalelaka kolonga na ndenge ya malamu. Eteyaka te ete kolonga ezali kaka mpo na bato moke oyo bazali na makila malamu. Epai mosusu, endimaka te makambo oyo ezalaka na babuku ya baistware oyo elobaka ete soki ‘olandi kaka makambo oyo okanaka kosala,’ nyonso ekokokisama. Likanisi yango, oyo mbala mingi bakɔtisaka yango na mitó ya bana ntango bazali naino mike, ekoki kolɛmbisa moto nzoto soki ekokisami te.

Mpo na koloba solo, moto nyonso akoki kolonga na bomoi; kasi yango esɛngaka kosala milende. Tótalela batoli oyo elandi.

  • OYO BIBLIA ELOBI:

    “Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te.”​—Mosakoli 5:10.

    YANGO ELIMBOLI NINI? Kolinga mingi biloko ya mokili epesaka esengo te. Kutu, esilisaka nde moto esengo. Na buku na ye Generation Me, Doktɛrɛ Jean Twenge akomaki boye: “Bato oyo makanisi na bango ekendaka libosoliboso na mbongo batungisamaka mingi na makanisi koleka baoyo bazwaka na valɛrɛ mingi boyokani na bango na basusu.” Abakisi boye: “Bolukiluki emonisi mpenza ete mbongo ekoki te kosomba esengo​—ata soki okómi na bozwi, ezali te mbongo nde ekopesa yo esengo na bomoi.”

    OKOKI KOSALA BOYE. Mityelá mokano ya kozwa eloko oyo ezali na litomba mingi koleka bozwi ná biloko ya kobikela. Yesu alobaki boye: “Bókeba na motindo nyonso ya bilulela, mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”​—Luka 12:15.

  • OYO BIBLIA ELOBI:

    “Lolendo ezalaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.”​—Masese 16:18.

    YANGO ELIMBOLI NINI? Lolendo mpe koluka lokumu ekosalisa yo te soki olingi kolonga mpenza. Kutu, buku moko (Good to Great) emonisi ete bapatrɔ oyo balongá na misala na bango “bazalaka mpenza na komikitisa, balingaka komilakisa te mpe balingaka te bato bayeba soki bazali banani. Nzokande, bakompanyi mingi (2/3) oyo bapatrɔ na yango bamizwaka na valɛrɛ mingi, ekufaka to misala na yango etambolaka lisusu malamu te.” Liteya ezali nini? Komizwa na valɛrɛ koleka ndelo ekweisaka nde moto na esika etombola ye.

    OYO OKOKI KOSALA. Na esika ya koluka lokumu, zaláká nde na komikitisa. Biblia elobi boye: “Soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba, azali kokosa makanisi na ye moko,” mpe ezali mpasi mpo alonga!​—Bagalatia 6:3.

  • OYO BIBLIA ELOBI:

    “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka . . . komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.”​Mosakoli 2:24.

    YANGO ELIMBOLI NINI? Soki okolisi makoki ya kosala mosala malamu, na ntembe te okosepela lisusu na mosala na yo. Na buku na ye Teach Your Children Well, Doktɛrɛ Madeline Levine akomaki boye: “Mpo moto amiyoka ete alongi na likambo moko, esɛngaka ete ayeba yango malamu mpe mpo ayeba yango malamu, esɛngaka kokoba kosala milende.” Yango esɛngaka mpe koyeba ndenge ya kosala ntango makambo oyo okanaki kosala esimbi te.

    OYO OKOKI KOSALA. Salá makasi mpo osalaka mosala malamu, mpe kolɛmba te soki okutani na mikakatano. Soki ozali na bana, salisá bango báyeba ndenge ya kosilisa mikakatano na bango (na kotalela mbula mpe makoki na bango). Kowelaka te kokɔta na makambo na bango to mpe koluka kobongisela bango yango. Bilenge bazwaka esengo ya solosolo mpe formasyo ya malamu oyo ekosalisa bango ntango bakokóma mikóló soki bazali koyeba ndenge ya kosala na ntango ya mikakatano.

  • OYO BIBLIA ELOBI:

    “Mbwa ya bomoi eleki nkɔsi oyo ekufá.”​—Mosakoli 9:4.

    YANGO ELIMBOLI NINI? Soki osalaka, mosala na yo esengeli kozala moko ya makambo ya bomoi na yo​—kasi bomoi na yo mobimba ezali na mosala wana te. Boye, okoyoka ndenge nini soki ozali kolonga na mosala na yo kasi mosala yango ezali kobebisa sante na yo mpe kosala ete bato ya libota na yo bápesa yo lisusu limemya te? Baoyo balongaka mpenza basalaka makasi bátya mosala, sante mpe bomoi ya libota na esika na yango.

    OYO OKOKI KOSALA. Batelá sante na yo. Pemáká malamu. Kokóma moombo ya mosala mpe koboya kokipe makambo mosusu nyonso, na ndakisa sante, libota mpe baninga ezali na litomba mingi te mpe ezali kolonga ya lokuta.

  • OYO BIBLIA ELOBI:

    “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

    YANGO ELIMBOLI NINI? Koyekola Biblia mpe kosalela batoli na yango ezali makambo oyo esalaka ete moto alonga mpenza. Kutu, bamilio ya Batatoli ya Yehova bamonaka ete kotya makambo ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na bango esalaka ete bámitungisa mingi te mpo na biloko ya mokili.​—Matai 6:31-33.

    OYO OKOKI KOSALA. Yekolá mpo oyeba ndenge Biblia ekoki kosalisa yo olonga mpenza na bomoi. Mpo na koyeba makambo mosusu, luká Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi to kɔtá na site na biso www.pr418.com.