Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Miso minene​—Nzoto mike!

Miso minene​—Nzoto mike!

MINGI bakomona yango kitoko; basusu bakokamwa. Makolo na yango elɛmbá, nsuki ya nzoto na yango ezali pɛtɛpɛtɛ mpe miso na yango ezali minene mpe engɛngaka. Nzoto na yango ezali na molai ya santimɛtrɛ 12 na ndambo, mpe kilo na yango ezali soki gramɛ 144. Ezali nini? Ezali nyama babengi tarsier!

Tótala naino malamumalamu moko ya bikelamu yango, tarsier ya ekólo Philippines. Miso, matoi, mabɔkɔ, makolo mpe mokila na yango ezali komonana minene koleka mpo nzoto na yango ezali moke mpenza. Ata bongo, soki otali nyama wana ya kokamwa malamumalamu, okomona ete ekelamá na ndenge ya kokamwa mpenza.

KOYOKA: Matoi ya mike ya tarsier oyo ezali lokola papye ekoki kokangama, kofungwama, mpe kobaluka mpo na koyoka ata mwa makelele ya moke mpenza. Matoi yango esalisaka ye kaka te na kokima banguna, na ndakisa nyau ya zamba, kasi mpe mpo eyeba esika mwa nyama oyo yango elingi kokanga ezali. Na butu, matoi ya tarsier eyebaka makelele ya mabanki, nsɛlɛlɛ, mwa banyama mosusu ya mikemike, bandɛkɛ mpe magorodo. Na nsima, motó na yango mobimba ekobaluka mpo miso emona epai mwa nyama oyo yango elingi kolya ezali.

KOKANGA ELOKO: Mabɔkɔ ya tarsier ebongisamá mpenza mpo na kokanga bitape ya mike ya banzete. Mposo ya misapi na yango ezali ndenge mosusu mpenza, ezali mabakumabaku lokola pinɛ. Ata ntango elali mpɔngi, tarsier ekangaka nzete makasi. Biloko mikemike oyo ezalaka na nse ya mokila molai na yango esalisaka yango eningana te ntango elali tii ntango ekolamuka.

MISO: Nyama moko te ezalaka na miso minene ndenge wana soki tokokanisi yango na monene ya nzoto na yango. Kutu, liso mokomoko ya tarsier ezali monene koleka bɔɔngɔ na yango! Miso ya tarsier ebalukaka te, etalaka ntango nyonso liboso. Yango ezali mabe mpo na ye? Mpenza te. Lokola nkingo ya tarsier ebalukaka na pɛtɛɛ nyonso, yango esalisaka yango ebalusa motó na yango na (180 degrés) ata na ngámbo nini.

NZOTO PƐPƐLƐ: Makolo milai ya tarsier epesaka yango makasi ya kopumbwa na ntaka ya bamɛtrɛ 6​—mbala 40 koleka molai na yango moko! Ntango ezali koluka kokanga mwa nyama oyo elyaka, esembolaka misapi na yango mpe ekangaka yango na bosikisiki mpenza ata na molili.

Ezalaka mpasi tarsier etikala na bomoi soki bakangi yango, mingimingi mpo elyaka mingi mwa banyama mikemike mpe elingaka te básimba yango. Kasi, nyama yango oyo ekeseni na banyama mosusu ezali kokoba kokamwisa bato ya Philippines. Eteni nyonso ya nzoto ya nyama wana kitoko ya miso minene oyo efandaka na zamba, ekamwisaka mpenza.