Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NTINA LELO OYO?

Bizaleli malamu oyo esilaka ngala te​—Bosembo na libala

Bizaleli malamu oyo esilaka ngala te​—Bosembo na libala

TOLI YA BIBLIA: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te.”​Baebre 13:4.

MATOMBA: Bato mosusu bamonaka ete toli yango esilá ngala. Kasi bazali komikosa mpenza! Kozanga bosembo na libala esalaka mpasi mingi na motema kaka ndenge ezalaki na ntango oyo Biblia ekomamaki.​—Masese 6:34, 35.

Jessie, oyo abalá mpe azali tata, akomaki boye: “Bosembo na libala esali ete tókóma na boyokani makasi ngai ná mwasi na ngai mpe tózala na esengo. Ya solo, kotyelana motema na libala ezali na ntina mingi. Kozanga bosembo na libala ebebisaka konfianse yango” mpe esalaka mabe epai ya bana!

Ligaya * alingaki kobebisa libala na ye. Alobi boye: “Nakómaki na baninga ya mabe. Yango esalaki ete nakóma kokende na banganda ya butu mpe kobima na mibali mosusu.” Nzela oyo alandaki epesaki ye esengo? Ye ná mobali na ye bazalaki koswana ntango nyonso mpe azalaki na esengo ata moke te. Abakisi boye: “Ntango nakanisaki ndenge namikɔtisaki na bozoba, namonaki ete baboti na ngai bamikosaki te ntango bazalaki koloba na ngai ete ‘baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.’”​—1 Bakorinti 15:33.

Ligaya alobi lisusu boye: “Liboso makambo ebeba mpenza, nazwaki ekateli ya kotika banzela na ngai wana ya mabe, koyekola Biblia mpe kosalela mateya na yango.” Azwaki matomba nini? Abikisaki libala na ye mpe mobali na ye akómaki lisusu kosalela ye makambo na boboto mpe na limemya. Alobi boye: “Biblia ebongolaki bomoi na ngai mpe nayokaka mawa te ndenge natiká bomoi na ngai ya kala mpe baninga mabe.”

^ par. 6 Bankombo mosusu ezali ya bango te.