Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ndenge ya kotika mimeseno ya mabe

Ndenge ya kotika mimeseno ya mabe
  • AUSTIN alali, kasi ntango ngonga ebɛti na montre na ye, alamuki nokinoki mpe alati bilamba na ye ya ngalasisi oyo abongisaki na butu liboso alala mpe abandi kokima mbangu kaka ndenge asalaka mbala misato na pɔsɔ banda mbula oyo eleki.

  • Laurie auti koswana na mobali na ye. Na nkanda nyonso, lokola ayebi te asala nini, akɔti na kuku, abimisi kitunga ya babɔmbɔ ya shokola mpe alei yango nyonso kaka ndenge asalaka soki asiliki.

Austin ná Laurie bakokani na nini? Báyeba yango to te, komesana na likambo nde etindaka bango básala bongo.

Bongo yo? Makambo nini ya malamu okolinga omesana na yango? Mbala mosusu mposa na yo ezali osalaka ngalasisi mbala na mbala, olalaka mingi to osololaka mingi na bandeko mpe baninga.

Mbala mosusu okolinga kotika momeseno ya mabe, na ndakisa komɛla makaya, kolya bilei mingi oyo etongaka nzoto te to kolekisa ntango mingi na Internet.

Mpo na koloba solo, ezalaka pɛtɛɛ te kotika momeseno ya mabe. Kutu, balobaka ete momeseno ya mabe ezali lokola kolala na mbeto na mokolo ya malili makasi; kolala ezalaka pɛtɛɛ kasi kokita na mbeto ekómaka mpasi!

Na yango, okoki kosala nini mpo mimeseno na yo ememela yo matomba na esika esala yo mabe? Tótalela toli misato oyo elandi, oyo euti na Biblia.